167. Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.
168. Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
170. Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te.
172. Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene.
173. Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.