116. Ya sôló baye bapengwi, bomengo na bongo na bana na bango ekosalisa bango na eloko moko te epai na Allah. Bango nde bato ya môtô mpe bakozala kuna seko.
117. Ndakisa ya maye bazali kobimisa yango mpona bomoyi ya nsé, ezali lokola mopepe ya malili makasi ebebisi elanga ya libota moko oyo basalaki lisumu na milimo mia bango moko, mpe Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
118. Eh Bino bandimi! Tika ete bozua sÓkÓ moke te baninga libanda na bino, balembaka te na kotia potopoto kati na bino, basili kolakisa bino kimonguna kowuta na minoko na bango, kasi oyo bazali kobomba na mitema ezali mabe koleka. Na boye tosili kolimbolela bino bilembo, soki bokozala na bososoli.
119. Bino nde bozali kolinga bango mpe bango balingi bino te: Mpe bozali kondima na buku mobimba na yango, mpe soki bakutani na bino, balobaka: Tondimi (na Allah), kasi soki batikali bango na bango, bazali kosua misapi na bango mpona kolakisa nkanda. Loba: Bokufa na mitema mabe na bino na koyina. Ya sôló, Allah ayebi mabombami ya mitema.
120. Soki bolamu (ya Allah) ezui bino basiliki, mpe soki mpasi ezui bino basepeli. Kasi soki bokangi mitema mpe bobangi (Allah), likita na bango ya mabe ekosala bino eloko moko te. Ya sôló, Allah ayebi maye manso bazali kosala.