181. Ya sôló, Allah asili koyoka maloba ya baye balobaki: Ya sôló, Allah azali mobola mpe biso tozali bazui. Tobombi maloba na bango. Mpe bango bazalaki koboma ba ntoma mpamba mpe tokoyebisa bango: Bomeka etumbu ya móto ya makasi.
183. Baye balobaka: Ya sôló tozui elaka epai ya Allah ete tokoki kondima ata na motindami moko te kino na tango akomemela biso libonza móto elia yango, Loba: Batindami liboso na ngai bayelaki bino bilembo mpe maye botunaki bango, Kasi boni bobomaki bango, soki bino bozali bato ya bosembo?
184. Mpe soki bazui yo moto ya lokuta, ya sôló basilaki kozwa batindami liboso nayo bato ya lokuta, bayelaki bango bilembo bia polele, mpe malendisi mpe buku ya bongengi.
185. Molimo nyoso mokomeka liwa. Kasi mokolo mwa lisekwa, bokozua lifuta lia bino. Na oyo bakotia ye mosika na móto mpe bakotisi ye na paradizu, ye wana nde alongi. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango moke.
186. Ya sôló, bokomekama mingi kati na bozui na bino mpe na banzoto na bino. Mpe bokoyoka maloba ebele ya mabe kowuta epai ya baye bazua buku liboso na bino, ndenge moko na basambeli ya bikeko. Mpe soki bokangi mitema, mpe bobangi (Allah). Ya sôló, wana ezali lolenge ya malamu ya kosilisa makambo.