72. Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi(1) na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga.
1 Bandimi: Bazali baye bamisoki na Allah (bamizilima).
73. Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.
77. Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi.