151. Tokotia kobanga na mitema ya bapagano mpo ete bango basangisaki Allah na maye bazalaki na bilembetele na yango te kowuta epai naye. Na yango efandelo na bango ekozala okati ya môtô, oyo nde esika ya mabe mpona bato ya mabe!
152. Ya sôló, Allah akokisaki elaka naye epai na bino, tango bobomaki bango ebele na ndingisa naye(1), kino tango bolembaki, mpe bokomaki kosuana, mpe bozangaki botosi na tango eye alakisaki bino maye bolingaka. Kati na bino basusu balingaki mokili, mpe basusu balingaki mokolo ya suka. Azongisaki bino sima liboso na bango mpo ete ameka bino mpe asila kolimbisa bino. Kasi Allah nde atonda bolamu likolo ya bandimi.
153. Tango bokimaki (kobunda) bozongaki sima te mpona kosalisa ata moto moko, mpe motindami (Muhammad) azali kobenga bino. Mpe (Allah) apesaki bino mawa likolo na mawa mpo ete boyoka mpasi te na mitema mpona biloko bozangaki kozua, mpe na makambo mazuaki bino. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.