195. Mpe Nkolo wa bango Andimelaki bango ete: Ya sôló ngai na kobungisa te mosala ya moko kati na bino, mobali to mpe mwasi bino na bino, kasi mpona ba oyo babimaki na nzela ya Allah, mpe babimisaki bango na ba ndako na bango, mpe banyokwamaki na nzela ya ngaï, mpe babundaki, mpe babomamaki na nzela na yango, na kolongola masumu na bango nyonso, mpe na kokotisa bango na lola wapi epai mingala mizali kotiola, lifuta kowuta epai ya Allah. Mpe Allah azali na lifuta ya malamu.
198. Kasi baye babangi Nkolo wa bango, bakozala na kati ya lola eye mingala mizali kotiola o’nse na yango seko na seko, efandelo kowuta epai ya Allah. Mpe maye mazuami epai ya Allah mazali kitoko mpona bato ya malamu.
199. Mpe ya sôló baye bazuaki buku, na kati na bango basusu bandimi na Allah, mpe na maye ekitaki epai na bino, mpe na maye ekiti epai na bango, bazali kobanga Allah. Mpe bazali koteka te mikapo mia Allah na ntalo moke. Bango wana lifuta na bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Ya sôló Allah afutaka na lombango.