176. Koyoka mpasi o’motema te mpona baye bakei na lombango na kati ya bopengwi. Ya sôló, bango bakopesa Allah mpasi soki moke te. Allah akani kopesa bango eloko soki moko te o’mokolo ya suka. Bango bakozua etumbu monene.
179. Allah akotika bandimi te na lolenge bozali na yango, kino akabola mabe na malamu. Allah akolakisa bino mabombami te, kasi Allah akopona o’kati ya batindami naye oyo ye alingi. Bondima na Allah na batindami naye, mpe soki bondimi mpe bobangi (Allah), bokozala na lifuta linene.
180. Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka, bomengo wana, bikozinga bango, mpe nkita ya likolo mpe ya mabele nyonso ezali ya Allah. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.