167. Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.