Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû

Numéro de la page:close

external-link copy
24 : 4

۞ وَٱلۡمُحۡصَنَٰتُ مِنَ ٱلنِّسَآءِ إِلَّا مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُمۡۖ كِتَٰبَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡۚ وَأُحِلَّ لَكُم مَّا وَرَآءَ ذَٰلِكُمۡ أَن تَبۡتَغُواْ بِأَمۡوَٰلِكُم مُّحۡصِنِينَ غَيۡرَ مُسَٰفِحِينَۚ فَمَا ٱسۡتَمۡتَعۡتُم بِهِۦ مِنۡهُنَّ فَـَٔاتُوهُنَّ أُجُورَهُنَّ فَرِيضَةٗۚ وَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ فِيمَا تَرَٰضَيۡتُم بِهِۦ مِنۢ بَعۡدِ ٱلۡفَرِيضَةِۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلِيمًا حَكِيمٗا

24. Mpe kobala basi ya mabala, longola sé bawumbu baye bosomba bango na mbongo na bino. Manso wana ezali mibeko mia Allah likolo na bino. Kasi bozali na ndingisa ya kobala basi banso batangami te okati ya mikapo miye. Kasi botambola na bango na mobulu te na ekobo te; bopesa bango misolo mia bango ya libala mpo ete bofanda na bango na maye bosepeli na yango kati na bango; mpe soki bosili kopesa bango misolo mia bango, bozali na lisumu te mpo ete bosili koyokana na bango; ya sôló Allah azali moyebi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 4

وَمَن لَّمۡ يَسۡتَطِعۡ مِنكُمۡ طَوۡلًا أَن يَنكِحَ ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ فَمِن مَّا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُم مِّن فَتَيَٰتِكُمُ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۚ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِإِيمَٰنِكُمۚ بَعۡضُكُم مِّنۢ بَعۡضٖۚ فَٱنكِحُوهُنَّ بِإِذۡنِ أَهۡلِهِنَّ وَءَاتُوهُنَّ أُجُورَهُنَّ بِٱلۡمَعۡرُوفِ مُحۡصَنَٰتٍ غَيۡرَ مُسَٰفِحَٰتٖ وَلَا مُتَّخِذَٰتِ أَخۡدَانٖۚ فَإِذَآ أُحۡصِنَّ فَإِنۡ أَتَيۡنَ بِفَٰحِشَةٖ فَعَلَيۡهِنَّ نِصۡفُ مَا عَلَى ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ مِنَ ٱلۡعَذَابِۚ ذَٰلِكَ لِمَنۡ خَشِيَ ٱلۡعَنَتَ مِنكُمۡۚ وَأَن تَصۡبِرُواْ خَيۡرٞ لَّكُمۡۗ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

25. Mpe oyo okati na bino azui makoki te ya kobala ba nsomi kati ya basi ya bandimi, akoki kozua na kati ya bawumbu nabino bana basi ya bandimi. Mpe Allah ayebi bondimi kati na bino, mpo bozali bino na bino. Bobala bango na ndingisa ya baboti na bango, mpe bopesa bango mbongo ya libala na ndenge ya malamu. Mpo ete bazali basi ya malamu, kasi boluka bango te na ndenge ya kobatama to mpe na ndenge ya ekobo. Mpe soki basili kokota na libala mpe bakwei na ekobo, bakozua kati kati ya etumbu ya basi ya bonsomi. Wana ezali nzela epesamelaki bino mpona baye bazali kobanga kokweya na ekobo. Kasi soki bokangi mitema ezali malamu mingi mpona bino, mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 4

يُرِيدُ ٱللَّهُ لِيُبَيِّنَ لَكُمۡ وَيَهۡدِيَكُمۡ سُنَنَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ وَيَتُوبَ عَلَيۡكُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ

26. Allah alingi kolimbolela bino, mpe alingi kokamba bino na nzela ya baye balekaki liboso na bino, mpe andima batubela na bino. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya. info
التفاسير: