Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû

Numéro de la page:close

external-link copy
92 : 4

وَمَا كَانَ لِمُؤۡمِنٍ أَن يَقۡتُلَ مُؤۡمِنًا إِلَّا خَطَـٔٗاۚ وَمَن قَتَلَ مُؤۡمِنًا خَطَـٔٗا فَتَحۡرِيرُ رَقَبَةٖ مُّؤۡمِنَةٖ وَدِيَةٞ مُّسَلَّمَةٌ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦٓ إِلَّآ أَن يَصَّدَّقُواْۚ فَإِن كَانَ مِن قَوۡمٍ عَدُوّٖ لَّكُمۡ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَتَحۡرِيرُ رَقَبَةٖ مُّؤۡمِنَةٖۖ وَإِن كَانَ مِن قَوۡمِۭ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُم مِّيثَٰقٞ فَدِيَةٞ مُّسَلَّمَةٌ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ وَتَحۡرِيرُ رَقَبَةٖ مُّؤۡمِنَةٖۖ فَمَن لَّمۡ يَجِدۡ فَصِيَامُ شَهۡرَيۡنِ مُتَتَابِعَيۡنِ تَوۡبَةٗ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَكِيمٗا

92. Esengeli te na mondimi koboma mondimi, sé soki asali yango na libaku. Na moto oyo abomi mondimi na libaku, esengeli naye akangola mowumbu moko ya mondimi mpe afuta makila ya mowei epayi ya libota naye, longola sé soki bango moko baboyi kozua lifuta yango. Kasi soki mowei, azali moto ya libota oyo ezali monguna na bino, mpe azali mondimi, mobomi akokangola sé kaka mowumbu ya mondimi. Kasi soki mowei azali moto ya libota oyo boyokani ezali kati na bino na bango, mobomi akofuta makila ya mowei epai na libota naye mpe akokangola mowumbu moko ya mondimi; kasi mpona oyo azui makoki te, esengeli naye akanga ngizi sanza mibale ya kolandana tubela mpona ye kowuta epayi ya Allah, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
93 : 4

وَمَن يَقۡتُلۡ مُؤۡمِنٗا مُّتَعَمِّدٗا فَجَزَآؤُهُۥ جَهَنَّمُ خَٰلِدٗا فِيهَا وَغَضِبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِ وَلَعَنَهُۥ وَأَعَدَّ لَهُۥ عَذَابًا عَظِيمٗا

93. Mpe oyo akoboma mondimi na nko lifuti naye ezali lifelo. Akozala libela na kati na yango, mpe Allah asilikeli ye mpe alakeli ye botutu mpe abongiseli ye etumbu ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 4

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا ضَرَبۡتُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَتَبَيَّنُواْ وَلَا تَقُولُواْ لِمَنۡ أَلۡقَىٰٓ إِلَيۡكُمُ ٱلسَّلَٰمَ لَسۡتَ مُؤۡمِنٗا تَبۡتَغُونَ عَرَضَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا فَعِندَ ٱللَّهِ مَغَانِمُ كَثِيرَةٞۚ كَذَٰلِكَ كُنتُم مِّن قَبۡلُ فَمَنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡكُمۡ فَتَبَيَّنُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٗا

94. Eh bino bandimi! Soki bokei na bitumba na nzela ya Allah bososola. Kasi boloba te na moto oyo bokutani naye apesi bino mbote ya kimia ete: Ozali mondimi te, bozali koluka na yango bomengo ya mokili. Mpe epai ya Allah nde bomengo ezali ebele. Bino mpe bozalaki liboso lokola bango, mpe na ngolu ya Allah likolo na bino asali ete bokoma bandimi, bososola, ya sôló, Allah ayebi mpe azali na sango ya maye manso bozali kosala. info
التفاسير: