Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû

Numéro de la page:close

external-link copy
171 : 4

يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لَا تَغۡلُواْ فِي دِينِكُمۡ وَلَا تَقُولُواْ عَلَى ٱللَّهِ إِلَّا ٱلۡحَقَّۚ إِنَّمَا ٱلۡمَسِيحُ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَ رَسُولُ ٱللَّهِ وَكَلِمَتُهُۥٓ أَلۡقَىٰهَآ إِلَىٰ مَرۡيَمَ وَرُوحٞ مِّنۡهُۖ فَـَٔامِنُواْ بِٱللَّهِ وَرُسُلِهِۦۖ وَلَا تَقُولُواْ ثَلَٰثَةٌۚ ٱنتَهُواْ خَيۡرٗا لَّكُمۡۚ إِنَّمَا ٱللَّهُ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۖ سُبۡحَٰنَهُۥٓ أَن يَكُونَ لَهُۥ وَلَدٞۘ لَّهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ وَكِيلٗا

171. Eh! Bino bozwa buku bolekisa ndelo te na lingomba na bino, mpe bolobela Allah sé bosembo, ya sôló Masiya Issa mwana ya Maryam azali sé motindami ya Allah mpe liloba naye oyo atia epai ya Maryam mpe molimo kowuta epai naye,(1) bondima na Allah na batindami naye, kasi boloba te ete(1) azali misato, soki botiki ezali malamu mpona bino, ya sôló Allah azali Nzambe moko nkembo naye ete azala na mwana, maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya ye, Allah ye nde azali mobateli oyo akoka. info

1 Allah.

التفاسير:

external-link copy
172 : 4

لَّن يَسۡتَنكِفَ ٱلۡمَسِيحُ أَن يَكُونَ عَبۡدٗا لِّلَّهِ وَلَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ ٱلۡمُقَرَّبُونَۚ وَمَن يَسۡتَنكِفۡ عَنۡ عِبَادَتِهِۦ وَيَسۡتَكۡبِرۡ فَسَيَحۡشُرُهُمۡ إِلَيۡهِ جَمِيعٗا

172. Masiya akoyoka nsoni te ete azala mowumbu ya Allah ndenge moko na ba anzelu (naye) ya pembeni, na moto oyo akoyoka nsoni na mabondeli naye (Allah) mpe asali lolendo, bayeba ete ye (Allah) akosangisa bango nyonso epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
173 : 4

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَيُوَفِّيهِمۡ أُجُورَهُمۡ وَيَزِيدُهُم مِّن فَضۡلِهِۦۖ وَأَمَّا ٱلَّذِينَ ٱسۡتَنكَفُواْ وَٱسۡتَكۡبَرُواْ فَيُعَذِّبُهُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا وَلَا يَجِدُونَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا

173. Kasi mpona baye bandimi mpe basali misala ya malamu akopesa bango lifuta na bango mpe akobakisela bango bolamu naye, kasi ba oyo bayokaki nsoni, mpe basali lolendo, akopesa bango etumbu ya makasi mpe bakozua mobateli te mpe mosungi te liboso ya Allah. info
التفاسير:

external-link copy
174 : 4

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ قَدۡ جَآءَكُم بُرۡهَٰنٞ مِّن رَّبِّكُمۡ وَأَنزَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ نُورٗا مُّبِينٗا

174. Eh! Bino bato ya sôló bilembetele esila kokomela bino kowuta epai na Nkolo wa bino, mpe tokitisaki epai na bino bongengisi ya polele (mwinda). info
التفاسير:

external-link copy
175 : 4

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱللَّهِ وَٱعۡتَصَمُواْ بِهِۦ فَسَيُدۡخِلُهُمۡ فِي رَحۡمَةٖ مِّنۡهُ وَفَضۡلٖ وَيَهۡدِيهِمۡ إِلَيۡهِ صِرَٰطٗا مُّسۡتَقِيمٗا

175. Mpe mpona baye bandimi na Allah mpe bakangami naye akokotisa bango na ngolu mpe bolamu kowuta epai naye, mpe akokamba bango epai naye na nzela ya semba. info
التفاسير: