Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû

Numéro de la page:close

external-link copy
60 : 4

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ يَزۡعُمُونَ أَنَّهُمۡ ءَامَنُواْ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلِكَ يُرِيدُونَ أَن يَتَحَاكَمُوٓاْ إِلَى ٱلطَّٰغُوتِ وَقَدۡ أُمِرُوٓاْ أَن يَكۡفُرُواْ بِهِۦۖ وَيُرِيدُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَن يُضِلَّهُمۡ ضَلَٰلَۢا بَعِيدٗا

60. Omoni te ete baye bakobete ntolo ete bango bandimi na maye tokitiselaki yo, mpe na maye tokitisaki epai ya baye bayaki liboso nayo? Bango balingaka kosambisa mambi ma bango epai ya motomboki.(1) nzoka nde batindamaki ete bapengwa na yango. Kasi satana alingi kobungisa bango na libunga moko ya mosika. info

1 Motomboki: Bótala Na mokapo 51 ya suratu oyo. Na suratu Al-Baqarah 256, 257.

التفاسير:

external-link copy
61 : 4

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ إِلَىٰ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ وَإِلَى ٱلرَّسُولِ رَأَيۡتَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ يَصُدُّونَ عَنكَ صُدُودٗا

61. Mpe soki babengi bango ete: Boya epai na maye Allah akitisa mpe epai ya motindami, okomona bato ya bilongi mibale bakimi yo bakei mosika. info
التفاسير:

external-link copy
62 : 4

فَكَيۡفَ إِذَآ أَصَٰبَتۡهُم مُّصِيبَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ ثُمَّ جَآءُوكَ يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ إِنۡ أَرَدۡنَآ إِلَّآ إِحۡسَٰنٗا وَتَوۡفِيقًا

62. Mpe ndenge nini soki mpasi ezui bango kowuta na maye maboko na bango moko esalaki, sima bakoyela yo mpe bakolapa na nkombo ya Allah ete: Tolingaki sé bolamu na boyokani?! info
التفاسير:

external-link copy
63 : 4

أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ يَعۡلَمُ ٱللَّهُ مَا فِي قُلُوبِهِمۡ فَأَعۡرِضۡ عَنۡهُمۡ وَعِظۡهُمۡ وَقُل لَّهُمۡ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ قَوۡلَۢا بَلِيغٗا

63. Bango wana nde Allah ayebi maye mazuami o’mitema mia bango. Kolanda makambo na bango te, mpe lendisa bango, mpe lobela bango maloba ya polele ya bosembo. info
التفاسير:

external-link copy
64 : 4

وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن رَّسُولٍ إِلَّا لِيُطَاعَ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ وَلَوۡ أَنَّهُمۡ إِذ ظَّلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ جَآءُوكَ فَٱسۡتَغۡفَرُواْ ٱللَّهَ وَٱسۡتَغۡفَرَ لَهُمُ ٱلرَّسُولُ لَوَجَدُواْ ٱللَّهَ تَوَّابٗا رَّحِيمٗا

64. Mpe totindaki motindami moko te epai ya bato bobele ete batosa ye sé na ndingisa ya Allah. Mpe bango tango basalaki milimo na bango mabe, bayaki epai nayo mpona kosenga Allah bolimbisi, mpe motindami asengela bango bolimbisi, balingaki kokuta Allah moyambi monene ya tubela mpe moyoki mawa. info
التفاسير:

external-link copy
65 : 4

فَلَا وَرَبِّكَ لَا يُؤۡمِنُونَ حَتَّىٰ يُحَكِّمُوكَ فِيمَا شَجَرَ بَيۡنَهُمۡ ثُمَّ لَا يَجِدُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ حَرَجٗا مِّمَّا قَضَيۡتَ وَيُسَلِّمُواْ تَسۡلِيمٗا

65. Mpe na nkombo ya Nkolo wayo, bakozala bandimi te kino bako tia yo zuzi ya likambo likwei kati na bango mpe bakoyoka mpasi te na mitema mpona likambo okateli bango, mpe na sima bandima mpe batosa yango. info
التفاسير: