Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo

Pagina nummer:close

external-link copy
41 : 9

ٱنفِرُواْ خِفَافٗا وَثِقَالٗا وَجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِكُمۡ وَأَنفُسِكُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ

41. Bökende moko moko to na lisanga kobunda na nzela na Allah na misolo na bino mpe na nzoto na bino, wana ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 9

لَوۡ كَانَ عَرَضٗا قَرِيبٗا وَسَفَرٗا قَاصِدٗا لَّٱتَّبَعُوكَ وَلَٰكِنۢ بَعُدَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلشُّقَّةُۚ وَسَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَوِ ٱسۡتَطَعۡنَا لَخَرَجۡنَا مَعَكُمۡ يُهۡلِكُونَ أَنفُسَهُمۡ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ

42. Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
43 : 9

عَفَا ٱللَّهُ عَنكَ لِمَ أَذِنتَ لَهُمۡ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَكَ ٱلَّذِينَ صَدَقُواْ وَتَعۡلَمَ ٱلۡكَٰذِبِينَ

43. Allah alimbisa yo na maye opesaki bango ndingisa, kino oyeba bato ya bosóló, mpe oyeba babuki lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 9

لَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ أَن يُجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُتَّقِينَ

44. Baye bandimi па Allah mpe na mokolo ya suka basenga yo nzela te liboso ya kokende kobunda o nzela ya Allah na misolo na bango na banzoto na bango. Allah nde moyebi wa babangi. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 9

إِنَّمَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَٱرۡتَابَتۡ قُلُوبُهُمۡ فَهُمۡ فِي رَيۡبِهِمۡ يَتَرَدَّدُونَ

45. Ya soló, baye bazali kosenga yo nzela, bandimi na Allah te, mpe na mokolo ya suka te, mpo mitema mia bango mitondi na ntembe, тропа ntembe wa bango bazali sé koyimayima. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 9

۞ وَلَوۡ أَرَادُواْ ٱلۡخُرُوجَ لَأَعَدُّواْ لَهُۥ عُدَّةٗ وَلَٰكِن كَرِهَ ٱللَّهُ ٱنۢبِعَاثَهُمۡ فَثَبَّطَهُمۡ وَقِيلَ ٱقۡعُدُواْ مَعَ ٱلۡقَٰعِدِينَ

46. Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 9

لَوۡ خَرَجُواْ فِيكُم مَّا زَادُوكُمۡ إِلَّا خَبَالٗا وَلَأَوۡضَعُواْ خِلَٰلَكُمۡ يَبۡغُونَكُمُ ٱلۡفِتۡنَةَ وَفِيكُمۡ سَمَّٰعُونَ لَهُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ

47. Soki babimaka elongo na bino, balingaki sé kotiela bino mobulu o mapinga mpe kobakisela bino mabe, mpe koluka kokabola. Mpe kati na bino ezali na bato bazali koyoka bango, kasi Allah ayebaka babubi. info
التفاسير: