Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo

Pagina nummer:close

external-link copy
37 : 9

إِنَّمَا ٱلنَّسِيٓءُ زِيَادَةٞ فِي ٱلۡكُفۡرِۖ يُضَلُّ بِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُحِلُّونَهُۥ عَامٗا وَيُحَرِّمُونَهُۥ عَامٗا لِّيُوَاطِـُٔواْ عِدَّةَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ فَيُحِلُّواْ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُۚ زُيِّنَ لَهُمۡ سُوٓءُ أَعۡمَٰلِهِمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡكَٰفِرِينَ

37. Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 9

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَا لَكُمۡ إِذَا قِيلَ لَكُمُ ٱنفِرُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ٱثَّاقَلۡتُمۡ إِلَى ٱلۡأَرۡضِۚ أَرَضِيتُم بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا مِنَ ٱلۡأٓخِرَةِۚ فَمَا مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا قَلِيلٌ

38. Eh bino baye bondima! Mpona nini soki bayebisi bino bobima na nzela ya Allah, bozali kofanda na nsé. Boye bolingi bomoyi bwa mokili koleka oyo ya mokolo ya suka? Bisengo bia mokili bizali mike, oyo ya lobi nde bileki. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 9

إِلَّا تَنفِرُواْ يُعَذِّبۡكُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا وَيَسۡتَبۡدِلۡ قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ وَلَا تَضُرُّوهُ شَيۡـٔٗاۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ

39. Soki bokei kobunda te, akopesa bino etumbu ya makasi mpe akokela bato basusu o esika na bino mpe eloko moko ya mabe ekosala ye te. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 9

إِلَّا تَنصُرُوهُ فَقَدۡ نَصَرَهُ ٱللَّهُ إِذۡ أَخۡرَجَهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ثَانِيَ ٱثۡنَيۡنِ إِذۡ هُمَا فِي ٱلۡغَارِ إِذۡ يَقُولُ لِصَٰحِبِهِۦ لَا تَحۡزَنۡ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَنَاۖ فَأَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَيۡهِ وَأَيَّدَهُۥ بِجُنُودٖ لَّمۡ تَرَوۡهَا وَجَعَلَ كَلِمَةَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلسُّفۡلَىٰۗ وَكَلِمَةُ ٱللَّهِ هِيَ ٱلۡعُلۡيَاۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

40. Soki bopesi ye lisungi te, (Muhammad) Allah asilaki kolongisa ye. Tango bapengwi babimisaki ye, ya mibale bango babale, tango bazalaki kati ya libanga, tango azali koloba na moyekoli naye: Kobanga te, ya soló, Allah azali elongo na biso, Allah akitisaki lisungi lia ye epai naye, mpe asalisi ye na mapinga baye bomonaki bango te, mpe atiyaki liloba lia bapengwi nanse, mpe liloba lia Allah lizala likolo, mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya. info
التفاسير: