Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Numero di pagina:close

external-link copy
253 : 2

۞ تِلۡكَ ٱلرُّسُلُ فَضَّلۡنَا بَعۡضَهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖۘ مِّنۡهُم مَّن كَلَّمَ ٱللَّهُۖ وَرَفَعَ بَعۡضَهُمۡ دَرَجَٰتٖۚ وَءَاتَيۡنَا عِيسَى ٱبۡنَ مَرۡيَمَ ٱلۡبَيِّنَٰتِ وَأَيَّدۡنَٰهُ بِرُوحِ ٱلۡقُدُسِۗ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا ٱقۡتَتَلَ ٱلَّذِينَ مِنۢ بَعۡدِهِم مِّنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَتۡهُمُ ٱلۡبَيِّنَٰتُ وَلَٰكِنِ ٱخۡتَلَفُواْ فَمِنۡهُم مَّنۡ ءَامَنَ وَمِنۡهُم مَّن كَفَرَۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا ٱقۡتَتَلُواْ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يَفۡعَلُ مَا يُرِيدُ

253. Na bantindami wana, basusu Allah apesaki bango bolamu mingi. Mpe basusu Allah asololaki na bango mpe amatisaki basusu lokumu koleka, mpe topesaki Issa mwana ya Maryam bilembo ya polele mpe totondisaki ye na molimo mosantu. Mpe soki Allah alingaki, nde baye bayaki sima na bango babomanaki te, na tango polele esili kokomela bango. Kasi bazalaki nde na bokabwani kati na bango. Na yango basusu kati na bango bandimaki mpe basusu bapengwaki. Mpe soki Allah alingaki, mbele babomanaki te. Kasi Allah asalaka sé oyo ye alingi. info
التفاسير:

external-link copy
254 : 2

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنفِقُواْ مِمَّا رَزَقۡنَٰكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمٞ لَّا بَيۡعٞ فِيهِ وَلَا خُلَّةٞ وَلَا شَفَٰعَةٞۗ وَٱلۡكَٰفِرُونَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ

254. Eh Bino baye bondimi! bobimisa na maye topesaki bino, yambo ete eyela bino mokolo moye koteka kimoninga. Mpe liloba ekozala te. Kasi bapagano nde bato mabe. info
التفاسير:

external-link copy
255 : 2

ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡحَيُّ ٱلۡقَيُّومُۚ لَا تَأۡخُذُهُۥ سِنَةٞ وَلَا نَوۡمٞۚ لَّهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ مَن ذَا ٱلَّذِي يَشۡفَعُ عِندَهُۥٓ إِلَّا بِإِذۡنِهِۦۚ يَعۡلَمُ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُمۡۖ وَلَا يُحِيطُونَ بِشَيۡءٖ مِّنۡ عِلۡمِهِۦٓ إِلَّا بِمَا شَآءَۚ وَسِعَ كُرۡسِيُّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۖ وَلَا يَـُٔودُهُۥ حِفۡظُهُمَاۚ وَهُوَ ٱلۡعَلِيُّ ٱلۡعَظِيمُ

255. Allah! Nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko, animbaka te mpe alalaka te. Maye manso mazali o’likolo mpe o’mabele mazali ya ye. Nani oyo azali na makoki ya kosengela moto epai ya Allah soki na ndingisa naye te? Ayebi maye maleka na maye makoya. Bakozuaka eloko moko te na boyebi naye sé na maye alingi, kursy(1) naye ezali monene koleka mapata(2) na mabele,(3) mpe ayokaka mpasi te mpona kobatela yango azali likolo mpe monene koleka. info

1 Etieli matambe ya Nkolo.
2 Mapata ezalaka sambo.
3 Mabele ezalaka sambo.

التفاسير:

external-link copy
256 : 2

لَآ إِكۡرَاهَ فِي ٱلدِّينِۖ قَد تَّبَيَّنَ ٱلرُّشۡدُ مِنَ ٱلۡغَيِّۚ فَمَن يَكۡفُرۡ بِٱلطَّٰغُوتِ وَيُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ فَقَدِ ٱسۡتَمۡسَكَ بِٱلۡعُرۡوَةِ ٱلۡوُثۡقَىٰ لَا ٱنفِصَامَ لَهَاۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ

256. Bakokanga moto na makasi te mpona kokota na lingomba ya Allah. Nzela ya semba esili koyebana na nzela ya libungi. Moto oyo akompegwa na motomboki.(1) mpe andimi na Allah, ye wana nde asili kosimba singa ya makasi(2) oyo ekatanaka te, Allah azali moyoki mpe moyebi. info

1 Motomboki: Elakisi: Ezali eloko to moto nioso bazali kobondela ye, mpe asepeli na mabondeli wana to asepeli balanda ye, na batosa ye na esika ya Allah. Elakisi mpe lisusu: kosambisa na mibeko oyo ezali ya Allah te na motindami, mpe oyo azali koloba ete ayebi mabombami.
2 Singa ya Makasi elakisi: Islam.

التفاسير: