Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Numero di pagina:close

external-link copy
135 : 2

وَقَالُواْ كُونُواْ هُودًا أَوۡ نَصَٰرَىٰ تَهۡتَدُواْۗ قُلۡ بَلۡ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِـۧمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ

135. Mpe balobaki: Bozala bayuda to baklisto bokokambama na nzela ya semba. Loba: lingomba ya Ibrâhîm nde ezali nzela ya semba, mpe(1) azalaki te elongo na basambeli bikeko. info

1 Ibrâhîm.

التفاسير:

external-link copy
136 : 2

قُولُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَمَآ أُنزِلَ إِلَيۡنَا وَمَآ أُنزِلَ إِلَىٰٓ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطِ وَمَآ أُوتِيَ مُوسَىٰ وَعِيسَىٰ وَمَآ أُوتِيَ ٱلنَّبِيُّونَ مِن رَّبِّهِمۡ لَا نُفَرِّقُ بَيۡنَ أَحَدٖ مِّنۡهُمۡ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ

136. Boloba: Tondimi na Allah, na maye makitaki epai na biso, mpe na maye makitaki epai ya Ibrâhîm, mpe na Ismâïl, mpe Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota malandami, mpe na maye mapesamaki na Mûssa na Issa, mpe na maye mapesamaki na bantoma kowuta epai ya Nkolo wa bango, tokoki kotia bokeseni te kati ya moko wa bango, mpe biso tomisokie epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
137 : 2

فَإِنۡ ءَامَنُواْ بِمِثۡلِ مَآ ءَامَنتُم بِهِۦ فَقَدِ ٱهۡتَدَواْۖ وَّإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا هُمۡ فِي شِقَاقٖۖ فَسَيَكۡفِيكَهُمُ ٱللَّهُۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ

137. Mpe soki bandimaki na oyo bondimi na yango, ya sôló balingaki kokambama, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló bango bakozala okati ya bokabuani, mpe Allah akobatela yo mpona bango mpo ete azali(1) moyoki mpe moyebi. info

1 Allah.

التفاسير:

external-link copy
138 : 2

صِبۡغَةَ ٱللَّهِ وَمَنۡ أَحۡسَنُ مِنَ ٱللَّهِ صِبۡغَةٗۖ وَنَحۡنُ لَهُۥ عَٰبِدُونَ

138. Tozali kolanda lingomba ya Allah, na boye nani azali malamu lokola Allah na lingomba lia ye? Mpe mpona ye nde tozali kobondela. info
التفاسير:

external-link copy
139 : 2

قُلۡ أَتُحَآجُّونَنَا فِي ٱللَّهِ وَهُوَ رَبُّنَا وَرَبُّكُمۡ وَلَنَآ أَعۡمَٰلُنَا وَلَكُمۡ أَعۡمَٰلُكُمۡ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُخۡلِصُونَ

139. Loba: Bozali kosuanisa biso mpona Allah, ye nde Nkolo wa biso mpe Nkolo wa bino? Biso na misala na biso, bino mpe na misala na bino. Mpe tomipetwami epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
140 : 2

أَمۡ تَقُولُونَ إِنَّ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطَ كَانُواْ هُودًا أَوۡ نَصَٰرَىٰۗ قُلۡ ءَأَنتُمۡ أَعۡلَمُ أَمِ ٱللَّهُۗ وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن كَتَمَ شَهَٰدَةً عِندَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ

140. Too bokoloba ete: Ya sôló Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota bazalaki bayuda too baklisto? Loba: Bino nde boyebi mingi, too Allah? Nani azali mabe koleka moto oyo abombi bosembo ya Allah epai naye? Mpe Allah abosani te maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
141 : 2

تِلۡكَ أُمَّةٞ قَدۡ خَلَتۡۖ لَهَا مَا كَسَبَتۡ وَلَكُم مَّا كَسَبۡتُمۡۖ وَلَا تُسۡـَٔلُونَ عَمَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

141. Ba oyo wana nde umma(1) baye baleka. Bakofutama na maye basalaki, bino mpe bokofutama na maye bosalaki. Bokotunama te na ntina na maye bango basalaki. info

1 Umma: Bótala na suratu oyo mokapo: 128.

التفاسير: