Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Numero di pagina:close

external-link copy
89 : 2

وَلَمَّا جَآءَهُمۡ كِتَٰبٞ مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِ مُصَدِّقٞ لِّمَا مَعَهُمۡ وَكَانُواْ مِن قَبۡلُ يَسۡتَفۡتِحُونَ عَلَى ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَلَمَّا جَآءَهُم مَّا عَرَفُواْ كَفَرُواْ بِهِۦۚ فَلَعۡنَةُ ٱللَّهِ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ

89. Mpe na tango buku eyelaki bango kowuta epai ya Allah mpona kolakisa bosôló na maye bazalaki na yango, mpe liboso bazalaki koluka kozala likolo ya ba oyo bapengwa, mpe tango ekomelaki bango na maye bango bayebaki bapengwaki mpo na yango, mpe botutu bwa Allah ezali likolo ya bapengwi. info
التفاسير:

external-link copy
90 : 2

بِئۡسَمَا ٱشۡتَرَوۡاْ بِهِۦٓ أَنفُسَهُمۡ أَن يَكۡفُرُواْ بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بَغۡيًا أَن يُنَزِّلَ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦۖ فَبَآءُو بِغَضَبٍ عَلَىٰ غَضَبٖۚ وَلِلۡكَٰفِرِينَ عَذَابٞ مُّهِينٞ

90. Ezali mabe mpona maye milimo na bango misombaki yango ete bapengwa na maye Allah akitisaki, kotomboka ete Allah akitisa bolamu naye likolo ya bawumbu naye oyo Alingi, mpe bawumelaki na kanda likolo ya kanda, mpe mpona bapengwi bakozua etumbu ya mabe. info
التفاسير:

external-link copy
91 : 2

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ ءَامِنُواْ بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ قَالُواْ نُؤۡمِنُ بِمَآ أُنزِلَ عَلَيۡنَا وَيَكۡفُرُونَ بِمَا وَرَآءَهُۥ وَهُوَ ٱلۡحَقُّ مُصَدِّقٗا لِّمَا مَعَهُمۡۗ قُلۡ فَلِمَ تَقۡتُلُونَ أَنۢبِيَآءَ ٱللَّهِ مِن قَبۡلُ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ

91. Mpe soki balobi na bango: bondima na maye Allah akitisaki, bakolobaka: Tondimi na maye makitaki epai na biso, mpe bazalaki kopengwa na maye mazali koya sima, nzoka nde yango ezali bosembo oyo endimi maye bazali na yango; loba: Mpona nini bozalaki koboma bantoma ya Allah liboso, soki bozalaki bandimi!? info
التفاسير:

external-link copy
92 : 2

۞ وَلَقَدۡ جَآءَكُم مُّوسَىٰ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ ثُمَّ ٱتَّخَذۡتُمُ ٱلۡعِجۡلَ مِنۢ بَعۡدِهِۦ وَأَنتُمۡ ظَٰلِمُونَ

92. Mpe ya sôló Mûssa ayelaki bino bilembo, mpe sima naye, bozuaki mwana ngombe mpona kobondela mpe bozali babubi. info
التفاسير:

external-link copy
93 : 2

وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِيثَٰقَكُمۡ وَرَفَعۡنَا فَوۡقَكُمُ ٱلطُّورَ خُذُواْ مَآ ءَاتَيۡنَٰكُم بِقُوَّةٖ وَٱسۡمَعُواْۖ قَالُواْ سَمِعۡنَا وَعَصَيۡنَا وَأُشۡرِبُواْ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلۡعِجۡلَ بِكُفۡرِهِمۡۚ قُلۡ بِئۡسَمَا يَأۡمُرُكُم بِهِۦٓ إِيمَٰنُكُمۡ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ

93. Mpe na tango tozuaki elaka na bino mpe totombolaki likolo na bino ngomba (ya sinai): bozua na bokasi maye topesaki bino mpe boyoka, balobaki: Toyoki mpe toboyi, mpe mitema mia bango misepelaki na kosambela mwana ngombe mpo na bopengwi na bango, loba: Kondima na bino etindi bino na mabe, soki ya sôló bozali bandimi. info
التفاسير: