Übersetzung der Bedeutungen von dem heiligen Quran - Die Lingala-Übersetzung - Muhammad Balngogo

Nummer der Seite:close

external-link copy
87 : 4

ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ لَيَجۡمَعَنَّكُمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا رَيۡبَ فِيهِۗ وَمَنۡ أَصۡدَقُ مِنَ ٱللَّهِ حَدِيثٗا

87. Allah, nzambe mosusu azali te sé ye. Akosangisa bino mokolo ya suka, wana ezali na tembe te, mpe nani yango aleki Allah na maloba ya bosembo? info
التفاسير:

external-link copy
88 : 4

۞ فَمَا لَكُمۡ فِي ٱلۡمُنَٰفِقِينَ فِئَتَيۡنِ وَٱللَّهُ أَرۡكَسَهُم بِمَا كَسَبُوٓاْۚ أَتُرِيدُونَ أَن تَهۡدُواْ مَنۡ أَضَلَّ ٱللَّهُۖ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَلَن تَجِدَ لَهُۥ سَبِيلٗا

88. Mpona nini bolingi kokabwana na biteni mibale mpona bato ya bilongi mibale? Mpe Allah asilaki kobengana bango na ntina ya maye basalaki. Bino bolingi bosembola bato oyo Allah asili kobungisa? Na moto oyo Allah abungisi, okoki te(1) kozongisa ye na nzela. info

1 Yo Muhammad.

التفاسير:

external-link copy
89 : 4

وَدُّواْ لَوۡ تَكۡفُرُونَ كَمَا كَفَرُواْ فَتَكُونُونَ سَوَآءٗۖ فَلَا تَتَّخِذُواْ مِنۡهُمۡ أَوۡلِيَآءَ حَتَّىٰ يُهَاجِرُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَخُذُوهُمۡ وَٱقۡتُلُوهُمۡ حَيۡثُ وَجَدتُّمُوهُمۡۖ وَلَا تَتَّخِذُواْ مِنۡهُمۡ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرًا

89. Balingi bopengwa ndenge bapengui, mpo ete bozala ndenge moko. Mpe bozua te kati na bango ba ninga kino babima na nzela ya Allah. Mpe soki bapesi mokongo bokanga bango mpe boboma bango bipai binso bokokuta bango. Mpe bozua kati na bango moninga te mpe mosalisi te. info
التفاسير:

external-link copy
90 : 4

إِلَّا ٱلَّذِينَ يَصِلُونَ إِلَىٰ قَوۡمِۭ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُم مِّيثَٰقٌ أَوۡ جَآءُوكُمۡ حَصِرَتۡ صُدُورُهُمۡ أَن يُقَٰتِلُوكُمۡ أَوۡ يُقَٰتِلُواْ قَوۡمَهُمۡۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَسَلَّطَهُمۡ عَلَيۡكُمۡ فَلَقَٰتَلُوكُمۡۚ فَإِنِ ٱعۡتَزَلُوكُمۡ فَلَمۡ يُقَٰتِلُوكُمۡ وَأَلۡقَوۡاْ إِلَيۡكُمُ ٱلسَّلَمَ فَمَا جَعَلَ ٱللَّهُ لَكُمۡ عَلَيۡهِمۡ سَبِيلٗا

90. Longola sé baye bakokota na lisanga ya bato oyo boyokani ezali kati na bino na bango, to mpe bayeli bino mitema ya komata ete babundisa bino, to mpe kobundisa bato na bango. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bango nguya likolo na bino, mpona kobundisa bino. Kasi soki batelemi na kati kati mpe babundisi bino te, mpe bazali kotindela bino losako, Allah apesi bino nzela te yako bundisa bango. info
التفاسير:

external-link copy
91 : 4

سَتَجِدُونَ ءَاخَرِينَ يُرِيدُونَ أَن يَأۡمَنُوكُمۡ وَيَأۡمَنُواْ قَوۡمَهُمۡ كُلَّ مَا رُدُّوٓاْ إِلَى ٱلۡفِتۡنَةِ أُرۡكِسُواْ فِيهَاۚ فَإِن لَّمۡ يَعۡتَزِلُوكُمۡ وَيُلۡقُوٓاْ إِلَيۡكُمُ ٱلسَّلَمَ وَيَكُفُّوٓاْ أَيۡدِيَهُمۡ فَخُذُوهُمۡ وَٱقۡتُلُوهُمۡ حَيۡثُ ثَقِفۡتُمُوهُمۡۚ وَأُوْلَٰٓئِكُمۡ جَعَلۡنَا لَكُمۡ عَلَيۡهِمۡ سُلۡطَٰنٗا مُّبِينٗا

91. Bokokuta basusu kati na bango bazali koluka ete bosepela na bango mpe libota na bango. Kasi tango inso bakozua komekama bakokweyisama ebele okati ya bopagano, na yango soki batelemi na kati kati te, mpe bapesi bino losako te, mpe balongoli maboko na bango likolo na bino te, bozua bango mpe boboma bango na bisika binso bokokuta bango. Mpe topesi bino bokonzi monene likolo na bango. info
التفاسير: