Übersetzung der Bedeutungen von dem heiligen Quran - Die Lingala-Übersetzung - Muhammad Balngogo

Nummer der Seite:close

external-link copy
45 : 4

وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِأَعۡدَآئِكُمۡۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ وَلِيّٗا وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ نَصِيرٗا

45. Mpe Allah nde ayebi banguna na bino. Allah akoki na bino lokola mokonzi; mpe Allah akoki na bino mpona lisalisi. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 4

مِّنَ ٱلَّذِينَ هَادُواْ يُحَرِّفُونَ ٱلۡكَلِمَ عَن مَّوَاضِعِهِۦ وَيَقُولُونَ سَمِعۡنَا وَعَصَيۡنَا وَٱسۡمَعۡ غَيۡرَ مُسۡمَعٖ وَرَٰعِنَا لَيَّۢا بِأَلۡسِنَتِهِمۡ وَطَعۡنٗا فِي ٱلدِّينِۚ وَلَوۡ أَنَّهُمۡ قَالُواْ سَمِعۡنَا وَأَطَعۡنَا وَٱسۡمَعۡ وَٱنظُرۡنَا لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۡ وَأَقۡوَمَ وَلَٰكِن لَّعَنَهُمُ ٱللَّهُ بِكُفۡرِهِمۡ فَلَا يُؤۡمِنُونَ إِلَّا قَلِيلٗا

46. Ezali o’kati ya bayuda baye bazali kobongola liloba na esika na yango. Mpe balobaka ete: Toyoki mpe toboyi kotosa, mpe balobi lisusu: Yoka kasi bapesa yo te ndenge ya koyokela, mpe pesa biso litomba, bazali kobimisa lolemu na bango mpona kofinga lingomba (ya Allah)! kasi soki balobaka ete: Toyoki mpe totosi, mpe balobi na bato ete: Yoka mpe tala biso, nde ezalaki malamu mpe semba mpona bango. Kasi Allah alakeli bango botutu na ntina na bopagano na bango; mpe bakondimaka te sé moke kati na bango. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 4

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ ءَامِنُواْ بِمَا نَزَّلۡنَا مُصَدِّقٗا لِّمَا مَعَكُم مِّن قَبۡلِ أَن نَّطۡمِسَ وُجُوهٗا فَنَرُدَّهَا عَلَىٰٓ أَدۡبَارِهَآ أَوۡ نَلۡعَنَهُمۡ كَمَا لَعَنَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلسَّبۡتِۚ وَكَانَ أَمۡرُ ٱللَّهِ مَفۡعُولًا

47. Eh bino baye bozua buku! Bondima na maye tokitisaki mpe ezali kondima na maye bozalaki na yango liboso ete tolimwisa bilongi, mpe tokobalola yango na sima mpe tokolakela bango ndenge tolakelaki bato ya Saba botutu. Mpamba te, mokano ya Allah ekokisamaka. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 4

إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَغۡفِرُ أَن يُشۡرَكَ بِهِۦ وَيَغۡفِرُ مَا دُونَ ذَٰلِكَ لِمَن يَشَآءُۚ وَمَن يُشۡرِكۡ بِٱللَّهِ فَقَدِ ٱفۡتَرَىٰٓ إِثۡمًا عَظِيمًا

48. Ya sôló, Allah akolimbisa te oyo akosangisa ye na eloko. Mpe azali kolimbisa masumu misusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah, ya sôló mpenza ye akwei na lisumu linene. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 4

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ يُزَكُّونَ أَنفُسَهُمۚ بَلِ ٱللَّهُ يُزَكِّي مَن يَشَآءُ وَلَا يُظۡلَمُونَ فَتِيلًا

49. Omoni te, baye wana batatoli ete bango bazali petoa? Kasi Allah nde akopetolaka oyo ye alingi, mpe bakosala bango mabe ata moke te lokola Fatîl.(1) info

1 Singa ya mokokoli ya date.

التفاسير:

external-link copy
50 : 4

ٱنظُرۡ كَيۡفَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَۖ وَكَفَىٰ بِهِۦٓ إِثۡمٗا مُّبِينًا

50. Tala lolenge kani bazali kobuka lokuta likolo ya Allah. Lokuta oyo wana ekoki na lisumu oyo ezali polele. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 4

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ أُوتُواْ نَصِيبٗا مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡجِبۡتِ وَٱلطَّٰغُوتِ وَيَقُولُونَ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ هَٰٓؤُلَآءِ أَهۡدَىٰ مِنَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ سَبِيلًا

51. Omonaki te epai ya ba oyo bazuaki eteni ya buku?(1) bazali kondima na bonganga mpe bazali kondima na tarut,(2) mpe bazali koloba na ba oyo basali bopagano: bango nde bazali na nzela ya semba koleka ba oyo bandimi.(3) info

1 Bótala: suratu Al-Imrân, mokato 3, 65.
2 Bótala: suratu Al-Baqarah 256, 257.
3 (Allah).

التفاسير: