88. Mpona nini bolingi kokabwana na biteni mibale mpona bato ya bilongi mibale? Mpe Allah asilaki kobengana bango na ntina ya maye basalaki. Bino bolingi bosembola bato oyo Allah asili kobungisa? Na moto oyo Allah abungisi, okoki te(1) kozongisa ye na nzela.
89. Balingi bopengwa ndenge bapengui, mpo ete bozala ndenge moko. Mpe bozua te kati na bango ba ninga kino babima na nzela ya Allah. Mpe soki bapesi mokongo bokanga bango mpe boboma bango bipai binso bokokuta bango. Mpe bozua kati na bango moninga te mpe mosalisi te.
90. Longola sé baye bakokota na lisanga ya bato oyo boyokani ezali kati na bino na bango, to mpe bayeli bino mitema ya komata ete babundisa bino, to mpe kobundisa bato na bango. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bango nguya likolo na bino, mpona kobundisa bino. Kasi soki batelemi na kati kati mpe babundisi bino te, mpe bazali kotindela bino losako, Allah apesi bino nzela te yako bundisa bango.
91. Bokokuta basusu kati na bango bazali koluka ete bosepela na bango mpe libota na bango. Kasi tango inso bakozua komekama bakokweyisama ebele okati ya bopagano, na yango soki batelemi na kati kati te, mpe bapesi bino losako te, mpe balongoli maboko na bango likolo na bino te, bozua bango mpe boboma bango na bisika binso bokokuta bango. Mpe topesi bino bokonzi monene likolo na bango.