Bản dịch ý nghĩa nội dung Qur'an - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·巴兰格

Số trang:close

external-link copy
211 : 2

سَلۡ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ كَمۡ ءَاتَيۡنَٰهُم مِّنۡ ءَايَةِۭ بَيِّنَةٖۗ وَمَن يُبَدِّلۡ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَتۡهُ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ

211. Botuna bana ya isalayele boni topesaki bango bilembo ya polele? Mpe oyo akobongola bolamu bwa Allah sima ya koyela ye, ya sôló Allah azali mopesi etumbu ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
212 : 2

زُيِّنَ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا وَيَسۡخَرُونَ مِنَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۘ وَٱلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ فَوۡقَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ وَٱللَّهُ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٖ

212. Bomoyi ya nsé esila kongengisama mpona baye bapengwa mpe bazali kotiola bandimi. Kasi, babangi bakozala likolo na bango o mokolo ya suka. Mpe Allah apesaka bozui na oyo alingi oyo ezali na suka te. info
التفاسير:

external-link copy
213 : 2

كَانَ ٱلنَّاسُ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ فَبَعَثَ ٱللَّهُ ٱلنَّبِيِّـۧنَ مُبَشِّرِينَ وَمُنذِرِينَ وَأَنزَلَ مَعَهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ لِيَحۡكُمَ بَيۡنَ ٱلنَّاسِ فِيمَا ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِۚ وَمَا ٱخۡتَلَفَ فِيهِ إِلَّا ٱلَّذِينَ أُوتُوهُ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَتۡهُمُ ٱلۡبَيِّنَٰتُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۖ فَهَدَى ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لِمَا ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِ مِنَ ٱلۡحَقِّ بِإِذۡنِهِۦۗ وَٱللَّهُ يَهۡدِي مَن يَشَآءُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٍ

213. Bato bazalaki umma(1) moko kati ya bondimi (wuta na ebandeli). Na sima Allah atindaki bantoma bazala bapesi sango malamu mpe bakebisi. Mpe akitisaki elongo na bango buku ya sôló, mpona kokata makambo kati kati na bato okati na maye makabolaki bango. Kasi ba oyo buku ekitelaki bango nde bakabwani na tango bilembo ya polele biyelaki bango mpona likunya okati na bango. Na sima Allah akambaki bandimi likolo ya maye bakabwanaki na yango kowuta na bosembo na ndingisa naye, mpe Allah akambaka oyo alingi na nzela ya semba. info

1 Umma: Awa elakisi: lingomba. Bótala suratu oyo: na mokapo 128.

التفاسير:

external-link copy
214 : 2

أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تَدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ وَلَمَّا يَأۡتِكُم مَّثَلُ ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلِكُمۖ مَّسَّتۡهُمُ ٱلۡبَأۡسَآءُ وَٱلضَّرَّآءُ وَزُلۡزِلُواْ حَتَّىٰ يَقُولَ ٱلرَّسُولُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ مَتَىٰ نَصۡرُ ٱللَّهِۗ أَلَآ إِنَّ نَصۡرَ ٱللَّهِ قَرِيبٞ

214. Boye bokanisi ete bokokota na lola na tango oyo ndakisa ya baye balekaki liboso na bino naino ekomeli bino te? Mpasi ya bozangi mpe minyokoli na bokono mizuaki bango, mpe baningisamaki kino motindami na bandimi baye bazalaki naye balobaki ete: Lisungi ya Allah ekoya ntango nini? TEE! Ya sôló elonga ya Allah ezali pembeni. info
التفاسير:

external-link copy
215 : 2

يَسۡـَٔلُونَكَ مَاذَا يُنفِقُونَۖ قُلۡ مَآ أَنفَقۡتُم مِّنۡ خَيۡرٖ فَلِلۡوَٰلِدَيۡنِ وَٱلۡأَقۡرَبِينَ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِۗ وَمَا تَفۡعَلُواْ مِنۡ خَيۡرٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ بِهِۦ عَلِيمٞ

215. Bazali kotuna yo nini bakoki kobimisa? Loba na bango ete: Oyo bokobimisa ya malamu ezali mpona baboti mibale, mpe bato ya libota, na bana bitike, na bazangi, na moto ya mobembo. Oyo bokosala mpona bolamu, ya sôló Allah azali moyebi manso. info
التفاسير: