แปล​ความหมาย​อัลกุรอาน​ - คำแปลภาษาลิงกาล่า - โดยมูฮัมมัด บะลินโกโก

หมายเลข​หน้า​:close

external-link copy
36 : 6

۞ إِنَّمَا يَسۡتَجِيبُ ٱلَّذِينَ يَسۡمَعُونَۘ وَٱلۡمَوۡتَىٰ يَبۡعَثُهُمُ ٱللَّهُ ثُمَّ إِلَيۡهِ يُرۡجَعُونَ

36. Ya sólo, ezali sé baye bazali koyoka nde bayambaka mbela (ya bondimi); kasi тропа bawa, Allah akosekwisa bango. Mpe epai naye nde bakozongisama. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 6

وَقَالُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۚ قُلۡ إِنَّ ٱللَّهَ قَادِرٌ عَلَىٰٓ أَن يُنَزِّلَ ءَايَةٗ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ

37. Mpe balobi: Mpona nini elembo ekitelaki ye te epai na Nkolo naye? Loba: Ya sólo Allah azali na makoki ya kokitisa elembo, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 6

وَمَا مِن دَآبَّةٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا طَٰٓئِرٖ يَطِيرُ بِجَنَاحَيۡهِ إِلَّآ أُمَمٌ أَمۡثَالُكُمۚ مَّا فَرَّطۡنَا فِي ٱلۡكِتَٰبِ مِن شَيۡءٖۚ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ يُحۡشَرُونَ

38. Mpe ezali na nyama(1) mokote ezali kotambola likolo na mabele, mpe ndeke moko te ezali kopumbwa na mapapu naye, sé kaka bazala na lisanga lokola bino. Mpe totikaki eloko moko te okati ya buku. Na sima, epai na Nkolo na bango nde bakosangisama. info

1 Nyama: Ezali: Bikelamu nionso oyo etambolaka likolo ya mabele.

التفاسير:

external-link copy
39 : 6

وَٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا صُمّٞ وَبُكۡمٞ فِي ٱلظُّلُمَٰتِۗ مَن يَشَإِ ٱللَّهُ يُضۡلِلۡهُ وَمَن يَشَأۡ يَجۡعَلۡهُ عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ

39. Mpe baye bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bazali lokola baye matoyi mpe minoko mia bango mikufa bazali okati ya molili: Allah azali kobungisa oyo alingi mpe azali kokamba oyo alingi na nzela ya semba. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 6

قُلۡ أَرَءَيۡتَكُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُ ٱللَّهِ أَوۡ أَتَتۡكُمُ ٱلسَّاعَةُ أَغَيۡرَ ٱللَّهِ تَدۡعُونَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

40. Loba: Boyebisa ngai soki etumbu ya Allah eyeli bino to mpe mokolo ya suka ekomeli bino? Bokobelela nzambe mosusu botika Allah soki bozali na bosembo? info
التفاسير:

external-link copy
41 : 6

بَلۡ إِيَّاهُ تَدۡعُونَ فَيَكۡشِفُ مَا تَدۡعُونَ إِلَيۡهِ إِن شَآءَ وَتَنسَوۡنَ مَا تُشۡرِكُونَ

41. Te; ye nde bokobelela mpe akolongola maye bozalaki kobondela ye тропа yango soki alingi, mpe bokobosana maye bozalaki kosangisa ye na yango. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 6

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰٓ أُمَمٖ مِّن قَبۡلِكَ فَأَخَذۡنَٰهُم بِٱلۡبَأۡسَآءِ وَٱلضَّرَّآءِ لَعَلَّهُمۡ يَتَضَرَّعُونَ

42. Mpe ya soló, tosilaki kotinda(1) epai ya bato liboso nayo, na sima tozuaki bango na bampasi ya makasi nzala mpe bamalali ya makasi mpo ete ntango mosusu bakolomba (ngolu na biso). info

1 Batindami.

التفاسير:

external-link copy
43 : 6

فَلَوۡلَآ إِذۡ جَآءَهُم بَأۡسُنَا تَضَرَّعُواْ وَلَٰكِن قَسَتۡ قُلُوبُهُمۡ وَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

43. Ntango bampasi na biso eyelaki bango, тропа nini balombaki ngolu na biso te! Mitema na bango mikomaki makasi mpe satana abongisela bango maye bazalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 6

فَلَمَّا نَسُواْ مَا ذُكِّرُواْ بِهِۦ فَتَحۡنَا عَلَيۡهِمۡ أَبۡوَٰبَ كُلِّ شَيۡءٍ حَتَّىٰٓ إِذَا فَرِحُواْ بِمَآ أُوتُوٓاْ أَخَذۡنَٰهُم بَغۡتَةٗ فَإِذَا هُم مُّبۡلِسُونَ

44. Мре ntango babosanaki maye bayebisaki bango, tofungolelaki bango bizipela ya biloko binso kino ntango basepeli na maye bazui, tozuaki bango mbalakaka, tala ndenge basilaki kozanga elikia. info
التفاسير: