แปล​ความหมาย​อัลกุรอาน​ - คำแปลภาษาลิงกาล่า - โดยมูฮัมมัด บะลินโกโก

หมายเลข​หน้า​:close

external-link copy
27 : 38

وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَآءَ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا بَٰطِلٗاۚ ذَٰلِكَ ظَنُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۚ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنَ ٱلنَّارِ

27. Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango) info
التفاسير:

external-link copy
28 : 38

أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ كَٱلۡمُفۡسِدِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلۡمُتَّقِينَ كَٱلۡفُجَّارِ

28. То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe? info
التفاسير:

external-link copy
29 : 38

كِتَٰبٌ أَنزَلۡنَٰهُ إِلَيۡكَ مُبَٰرَكٞ لِّيَدَّبَّرُوٓاْ ءَايَٰتِهِۦ وَلِيَتَذَكَّرَ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ

29. Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 38

وَوَهَبۡنَا لِدَاوُۥدَ سُلَيۡمَٰنَۚ نِعۡمَ ٱلۡعَبۡدُ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٌ

30. Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 38

إِذۡ عُرِضَ عَلَيۡهِ بِٱلۡعَشِيِّ ٱلصَّٰفِنَٰتُ ٱلۡجِيَادُ

31. Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu, info
التفاسير:

external-link copy
32 : 38

فَقَالَ إِنِّيٓ أَحۡبَبۡتُ حُبَّ ٱلۡخَيۡرِ عَن ذِكۡرِ رَبِّي حَتَّىٰ تَوَارَتۡ بِٱلۡحِجَابِ

32. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi. info
التفاسير:

external-link copy
33 : 38

رُدُّوهَا عَلَيَّۖ فَطَفِقَ مَسۡحَۢا بِٱلسُّوقِ وَٱلۡأَعۡنَاقِ

33. Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 38

وَلَقَدۡ فَتَنَّا سُلَيۡمَٰنَ وَأَلۡقَيۡنَا عَلَىٰ كُرۡسِيِّهِۦ جَسَدٗا ثُمَّ أَنَابَ

34. Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 38

قَالَ رَبِّ ٱغۡفِرۡ لِي وَهَبۡ لِي مُلۡكٗا لَّا يَنۢبَغِي لِأَحَدٖ مِّنۢ بَعۡدِيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ

35. Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 38

فَسَخَّرۡنَا لَهُ ٱلرِّيحَ تَجۡرِي بِأَمۡرِهِۦ رُخَآءً حَيۡثُ أَصَابَ

36. Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 38

وَٱلشَّيَٰطِينَ كُلَّ بَنَّآءٖ وَغَوَّاصٖ

37. Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala, info
التفاسير:

external-link copy
38 : 38

وَءَاخَرِينَ مُقَرَّنِينَ فِي ٱلۡأَصۡفَادِ

38. Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 38

هَٰذَا عَطَآؤُنَا فَٱمۡنُنۡ أَوۡ أَمۡسِكۡ بِغَيۡرِ حِسَابٖ

39. Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 38

وَإِنَّ لَهُۥ عِندَنَا لَزُلۡفَىٰ وَحُسۡنَ مَـَٔابٖ

40. Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 38

وَٱذۡكُرۡ عَبۡدَنَآ أَيُّوبَ إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَسَّنِيَ ٱلشَّيۡطَٰنُ بِنُصۡبٖ وَعَذَابٍ

41. Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 38

ٱرۡكُضۡ بِرِجۡلِكَۖ هَٰذَا مُغۡتَسَلُۢ بَارِدٞ وَشَرَابٞ

42. Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu. info
التفاسير: