Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu

Numri i faqes:close

external-link copy
125 : 6

فَمَن يُرِدِ ٱللَّهُ أَن يَهۡدِيَهُۥ يَشۡرَحۡ صَدۡرَهُۥ لِلۡإِسۡلَٰمِۖ وَمَن يُرِدۡ أَن يُضِلَّهُۥ يَجۡعَلۡ صَدۡرَهُۥ ضَيِّقًا حَرَجٗا كَأَنَّمَا يَصَّعَّدُ فِي ٱلسَّمَآءِۚ كَذَٰلِكَ يَجۡعَلُ ٱللَّهُ ٱلرِّجۡسَ عَلَى ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ

125. Moto oyo Allah alingi kokamba ye akofungola motema naye mpo na islam, mpe oyo alingi kobungisa, akotia motema naye ekangami ekomi moke lokola moto oyo azali kobunda mpo na komata na likolo. Ndenge wana Allah azali kotia mbindo (etumbu) likolo na baye bandimi te. info
التفاسير:

external-link copy
126 : 6

وَهَٰذَا صِرَٰطُ رَبِّكَ مُسۡتَقِيمٗاۗ قَدۡ فَصَّلۡنَا ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَذَّكَّرُونَ

126. Mpe oyo ezali nzela ya Nkolo nayo ya nsemba, tosili kolimbola mikapo тропа bato bakanisa. info
التفاسير:

external-link copy
127 : 6

۞ لَهُمۡ دَارُ ٱلسَّلَٰمِ عِندَ رَبِّهِمۡۖ وَهُوَ وَلِيُّهُم بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

127. Bazali na ndako ya kimia epai na Nkolo na bango, mpe azali mobateli na bango na maye bazalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
128 : 6

وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ قَدِ ٱسۡتَكۡثَرۡتُم مِّنَ ٱلۡإِنسِۖ وَقَالَ أَوۡلِيَآؤُهُم مِّنَ ٱلۡإِنسِ رَبَّنَا ٱسۡتَمۡتَعَ بَعۡضُنَا بِبَعۡضٖ وَبَلَغۡنَآ أَجَلَنَا ٱلَّذِيٓ أَجَّلۡتَ لَنَاۚ قَالَ ٱلنَّارُ مَثۡوَىٰكُمۡ خَٰلِدِينَ فِيهَآ إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۚ إِنَّ رَبَّكَ حَكِيمٌ عَلِيمٞ

128. Mpe mokolo akosangisa bango banso, eh bino bilima bosili! Konyokolo bato mingi, тре baninga na bango kati ya bato bakozongisa liloba ete: Eh Nkolo! Tozalaki kosalisana kati na biso kino tokomi na elaka na biso eye osilaki kotia. Akoloba na bango: Lifelo nde esika na bino ya kofanda libela, sé ndenge Allah akolinga. Ya soló, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi. info
التفاسير:

external-link copy
129 : 6

وَكَذَٰلِكَ نُوَلِّي بَعۡضَ ٱلظَّٰلِمِينَ بَعۡضَۢا بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

129. Lolenge wana nde tozali kopesa babubi bokonzi likolo na baninga na bango na ntina ya maye bazalaki kozua. info
التفاسير:

external-link copy
130 : 6

يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ رُسُلٞ مِّنكُمۡ يَقُصُّونَ عَلَيۡكُمۡ ءَايَٰتِي وَيُنذِرُونَكُمۡ لِقَآءَ يَوۡمِكُمۡ هَٰذَاۚ قَالُواْ شَهِدۡنَا عَلَىٰٓ أَنفُسِنَاۖ وَغَرَّتۡهُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا وَشَهِدُواْ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡ أَنَّهُمۡ كَانُواْ كَٰفِرِينَ

130. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Batindami baponamaki te kati na bino, bazali kolobela bino bilembo biangai mpe bazali kokebisa bino mpo na bokutani na bino ya lelo oyo? Bakoloba: Totatoli na nzoto na biso moko, mpe bomoyi ya nsé mokosi bango, mpe bamitatoli ete ya soló bazalaki bapengwi. info
التفاسير: