Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu

Numri i faqes: 79:77 close

external-link copy
15 : 4

وَٱلَّٰتِي يَأۡتِينَ ٱلۡفَٰحِشَةَ مِن نِّسَآئِكُمۡ فَٱسۡتَشۡهِدُواْ عَلَيۡهِنَّ أَرۡبَعَةٗ مِّنكُمۡۖ فَإِن شَهِدُواْ فَأَمۡسِكُوهُنَّ فِي ٱلۡبُيُوتِ حَتَّىٰ يَتَوَفَّىٰهُنَّ ٱلۡمَوۡتُ أَوۡ يَجۡعَلَ ٱللَّهُ لَهُنَّ سَبِيلٗا

15. Otei ya basi na bino baye bakokweya na ekobo, boya na banzeneneke minei okati na bino, mpe soki batatoli yango bofandisa bango o’kati ya bandako kino liwa eyela bango to mpe Allah atia mobeko mosusu likolo na bango. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 4

وَٱلَّذَانِ يَأۡتِيَٰنِهَا مِنكُمۡ فَـَٔاذُوهُمَاۖ فَإِن تَابَا وَأَصۡلَحَا فَأَعۡرِضُواْ عَنۡهُمَآۗ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ تَوَّابٗا رَّحِيمًا

16. Mpe mibale kati na bino bakwei na ekobo, bogangela bango, kasi soki batubeli mpe babongisi, botika kotungisa bango. Mpamba te Allah ya sôló, azali moyambi ya tubela mpe atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 4

إِنَّمَا ٱلتَّوۡبَةُ عَلَى ٱللَّهِ لِلَّذِينَ يَعۡمَلُونَ ٱلسُّوٓءَ بِجَهَٰلَةٖ ثُمَّ يَتُوبُونَ مِن قَرِيبٖ فَأُوْلَٰٓئِكَ يَتُوبُ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡۗ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَكِيمٗا

17. Ya sôló, tubela epai ya Allah ezali mpona baye basali mbeba na boyinga, mpe bawelisi na kotubela. Ba oyo wana nde Allah akondima tubela na bango. Mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 4

وَلَيۡسَتِ ٱلتَّوۡبَةُ لِلَّذِينَ يَعۡمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ حَتَّىٰٓ إِذَا حَضَرَ أَحَدَهُمُ ٱلۡمَوۡتُ قَالَ إِنِّي تُبۡتُ ٱلۡـَٰٔنَ وَلَا ٱلَّذِينَ يَمُوتُونَ وَهُمۡ كُفَّارٌۚ أُوْلَٰٓئِكَ أَعۡتَدۡنَا لَهُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا

18. Tubela ezali te, na baye bazali kosala mbeba tii kino liwa likomeli moko na bango. Akoloba: Ya sôló, ngai natubeli sika oyo. Mpe (tubela) ezali te na baye bazali kowa mpe bango bazali bapagano; baye wana nde tobongisi mpona bango etumbu ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 4

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا يَحِلُّ لَكُمۡ أَن تَرِثُواْ ٱلنِّسَآءَ كَرۡهٗاۖ وَلَا تَعۡضُلُوهُنَّ لِتَذۡهَبُواْ بِبَعۡضِ مَآ ءَاتَيۡتُمُوهُنَّ إِلَّآ أَن يَأۡتِينَ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖۚ وَعَاشِرُوهُنَّ بِٱلۡمَعۡرُوفِۚ فَإِن كَرِهۡتُمُوهُنَّ فَعَسَىٰٓ أَن تَكۡرَهُواْ شَيۡـٔٗا وَيَجۡعَلَ ٱللَّهُ فِيهِ خَيۡرٗا كَثِيرٗا

19. Eh bino bandimi! Bozua nkita ya basi te sé na ndingisa na bango. Mpe bopekisa bango te kobala sima ya liwa ya mibali na bango, na likanisi ya kozua ndambu ya misolo bopesaki bango na libala. Longola sé soki basali likambo ya mabe, lokola ekobo oyo emonani polele. Kasi soki bongo te, bofanda na bango na lolenge ya malamu, mpe soki bozali kosepela na bango te, kasi boyeba ete soki bozali koyina eloko tango mosusu Allah asili kotia bolamu ebele okati na yango. info
التفاسير: