Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu

Numri i faqes:close

external-link copy
216 : 2

كُتِبَ عَلَيۡكُمُ ٱلۡقِتَالُ وَهُوَ كُرۡهٞ لَّكُمۡۖ وَعَسَىٰٓ أَن تَكۡرَهُواْ شَيۡـٔٗا وَهُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۖ وَعَسَىٰٓ أَن تُحِبُّواْ شَيۡـٔٗا وَهُوَ شَرّٞ لَّكُمۡۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ

216. Kobunda na nzela ya Allah epesamela bino lotomo. Mpe bino bosepeli na yango te, tango mosusu oyo bozali komona mabe yango nde ezali malamu mpona bino, mpe oyo bozali komona malamu yango nde ezali mabe mpona bino. Mpe Allah nde ayebi, bino boyebi te. info
التفاسير:

external-link copy
217 : 2

يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلشَّهۡرِ ٱلۡحَرَامِ قِتَالٖ فِيهِۖ قُلۡ قِتَالٞ فِيهِ كَبِيرٞۚ وَصَدٌّ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَكُفۡرُۢ بِهِۦ وَٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ وَإِخۡرَاجُ أَهۡلِهِۦ مِنۡهُ أَكۡبَرُ عِندَ ٱللَّهِۚ وَٱلۡفِتۡنَةُ أَكۡبَرُ مِنَ ٱلۡقَتۡلِۗ وَلَا يَزَالُونَ يُقَٰتِلُونَكُمۡ حَتَّىٰ يَرُدُّوكُمۡ عَن دِينِكُمۡ إِنِ ٱسۡتَطَٰعُواْۚ وَمَن يَرۡتَدِدۡ مِنكُمۡ عَن دِينِهِۦ فَيَمُتۡ وَهُوَ كَافِرٞ فَأُوْلَٰٓئِكَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ

217. Bazali kotuna yo mpona bitumba okati ya sanza esantu. Loba ete: Kobunda okati ya sanza esantu ezali lisumu monene, mpe kopekisa bato na nzela ya Allah, mpe kopengwa na yango, mpe kobengana baye bazali na ndako esantu (ya makkah) ezali lisumu linene koleka epai ya Allah. Mpe kosangisa Allah ezali mabe mpenza koleka koboma, mpe bakotika kobundisa bino te kino bokopengwa na lingomba na bino soki bazalaki na makoki wana, mpe kati na bino oyo akotika lingomba naye mpe liwa ezui ye mpe ye azali mopagano, bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé mpe na mokolo ya suka. Mpe bango wana bazali bato ya lifelo bakozala na kati seko na seko. info
التفاسير:

external-link copy
218 : 2

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱلَّذِينَ هَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أُوْلَٰٓئِكَ يَرۡجُونَ رَحۡمَتَ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

218. Ya sôló baye bandimi mpe babimi na nzela ya Allah mpe babundi, bango wana bazali kolikia ngolu ya Allah. Mpe Allah nde molimbisi, atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
219 : 2

۞ يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡخَمۡرِ وَٱلۡمَيۡسِرِۖ قُلۡ فِيهِمَآ إِثۡمٞ كَبِيرٞ وَمَنَٰفِعُ لِلنَّاسِ وَإِثۡمُهُمَآ أَكۡبَرُ مِن نَّفۡعِهِمَاۗ وَيَسۡـَٔلُونَكَ مَاذَا يُنفِقُونَۖ قُلِ ٱلۡعَفۡوَۗ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّكُمۡ تَتَفَكَّرُونَ

219. Bazali kotuna yo mpona masanga mpe mpona masano ya mbongo. Loba ete: Yango nyoso ezali na lisumu linene mpe litomba mpona bato. Kasi lisumu na yango ezali munene koleka litomba wana, mpe bazali kotuna yo nini bakoki kobimisa (mpona Allah)? Loba ete: Oyo bokoyoka mpasi te na mitema mpona kobimisa yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino bilembo mpo ete bozala na bososoli. info
التفاسير: