Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo

Pagina nummer:close

external-link copy
265 : 2

وَمَثَلُ ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ أَمۡوَٰلَهُمُ ٱبۡتِغَآءَ مَرۡضَاتِ ٱللَّهِ وَتَثۡبِيتٗا مِّنۡ أَنفُسِهِمۡ كَمَثَلِ جَنَّةِۭ بِرَبۡوَةٍ أَصَابَهَا وَابِلٞ فَـَٔاتَتۡ أُكُلَهَا ضِعۡفَيۡنِ فَإِن لَّمۡ يُصِبۡهَا وَابِلٞ فَطَلّٞۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٌ

265. Mpe ndakisa ya ba oyo bazali kobimisa misolo mia bango na bondimi bonso mpona Allah, mpe mitema mia bango mizali kimia bazali lokola elanga ezuami na mabele ya kitoko na esika etombwami, mbula makasi enokeli yango, mpe epesi mbuma na yango mbala mibale koleka. Ata soki mbula ya makasi ebeti te, matanga ya mike ekoki na yango. Mpe Allah azali momoni maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
266 : 2

أَيَوَدُّ أَحَدُكُمۡ أَن تَكُونَ لَهُۥ جَنَّةٞ مِّن نَّخِيلٖ وَأَعۡنَابٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ لَهُۥ فِيهَا مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ وَأَصَابَهُ ٱلۡكِبَرُ وَلَهُۥ ذُرِّيَّةٞ ضُعَفَآءُ فَأَصَابَهَآ إِعۡصَارٞ فِيهِ نَارٞ فَٱحۡتَرَقَتۡۗ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّكُمۡ تَتَفَكَّرُونَ

266. Boye moko kati na bino akolinga kozala na elanga ya naghil(1) mpe ya a’nâb(2) eye mingala mizali kotiola na nsé na yango, mpe ezali kopesa ye mbuma inso ya ndenge na ndenge, na sima mobange ekomeli ye, mpe bana naye bazali mike naino bakoli te, mpe mopepe ya monene ya makasi ya móto ekoti na elanga wana mpe ezikisi yango nyoso? Na lolenge ya boye nde Allah azali kolimbolela bino bilembo bia ye mpo ete bokanisa. info

1 Naghil: Nzete ya tamru na makasa na yango ezali lokola nzete ya mbila, kasi ezali na bokeseni na bambuma na yango, ebotaka na ba mboka ya esobe ezali sukali.
2 A’náb: Vino.

التفاسير:

external-link copy
267 : 2

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنفِقُواْ مِن طَيِّبَٰتِ مَا كَسَبۡتُمۡ وَمِمَّآ أَخۡرَجۡنَا لَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِۖ وَلَا تَيَمَّمُواْ ٱلۡخَبِيثَ مِنۡهُ تُنفِقُونَ وَلَسۡتُم بِـَٔاخِذِيهِ إِلَّآ أَن تُغۡمِضُواْ فِيهِۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ غَنِيٌّ حَمِيدٌ

267. Eh bino bandimi! Na bozui bozali na yango bobimisa ya malamu mpona nzela ya Allah mpe ndenge moko na milona miye topesi bino kowuta okati ya mabele. Kasi bopona te ya mabe mpona kobimisa na nzela ya Allah oyo soki bapesaki bino yango bokolinga kozua yango te kaka mpona nsoni mpe na kokanga miso. Mpe boyeba ete ya sôló Allah asanzolama atonda bomengo. info
التفاسير:

external-link copy
268 : 2

ٱلشَّيۡطَٰنُ يَعِدُكُمُ ٱلۡفَقۡرَ وَيَأۡمُرُكُم بِٱلۡفَحۡشَآءِۖ وَٱللَّهُ يَعِدُكُم مَّغۡفِرَةٗ مِّنۡهُ وَفَضۡلٗاۗ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ

268. Satana azali kobangisa bino kimobola mpe azali kotinda bino na makambo ya mbindo mpe ya bonsoni, kasi Allah azali kolaka bino bolimbisi mpe lisalisi kowuta epai naye. Mpe Allah atonda bomengo azali moyebi koleka. info
التفاسير:

external-link copy
269 : 2

يُؤۡتِي ٱلۡحِكۡمَةَ مَن يَشَآءُۚ وَمَن يُؤۡتَ ٱلۡحِكۡمَةَ فَقَدۡ أُوتِيَ خَيۡرٗا كَثِيرٗاۗ وَمَا يَذَّكَّرُ إِلَّآ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ

269. (Allah) apesaka bwanya na moto oyo ye alingi. Na oyo apesi ye bwanya ayeba ete asili kozua bolamu ebele koleka. Kasi sé bato ya mayele nde bazali kokanisa. info
التفاسير: