Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu.

Ar-Rahmân

external-link copy
1 : 55

ٱلرَّحۡمَٰنُ

1. Ar-Rahmân(1), info

1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.

التفاسير:

external-link copy
2 : 55

عَلَّمَ ٱلۡقُرۡءَانَ

2. Atangisaki kurani. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 55

خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ

3. Akela moto. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 55

عَلَّمَهُ ٱلۡبَيَانَ

4. Atangisa ye koloba polele. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 55

ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ بِحُسۡبَانٖ

5. Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 55

وَٱلنَّجۡمُ وَٱلشَّجَرُ يَسۡجُدَانِ

6. Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango), info
التفاسير:

external-link copy
7 : 55

وَٱلسَّمَآءَ رَفَعَهَا وَوَضَعَ ٱلۡمِيزَانَ

7. Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli, info
التفاسير:

external-link copy
8 : 55

أَلَّا تَطۡغَوۡاْ فِي ٱلۡمِيزَانِ

8. Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 55

وَأَقِيمُواْ ٱلۡوَزۡنَ بِٱلۡقِسۡطِ وَلَا تُخۡسِرُواْ ٱلۡمِيزَانَ

9. Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 55

وَٱلۡأَرۡضَ وَضَعَهَا لِلۡأَنَامِ

10. Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi, info
التفاسير:

external-link copy
11 : 55

فِيهَا فَٰكِهَةٞ وَٱلنَّخۡلُ ذَاتُ ٱلۡأَكۡمَامِ

11. Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l(1) ekangama, info

1 Nagh’l: Bótala suratu Al-Kahf mokapo: 32.

التفاسير:

external-link copy
12 : 55

وَٱلۡحَبُّ ذُو ٱلۡعَصۡفِ وَٱلرَّيۡحَانُ

12. Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

13. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima). info
التفاسير:

external-link copy
14 : 55

خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ مِن صَلۡصَٰلٖ كَٱلۡفَخَّارِ

14. Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki, info
التفاسير:

external-link copy
15 : 55

وَخَلَقَ ٱلۡجَآنَّ مِن مَّارِجٖ مِّن نَّارٖ

15. Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

16. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
17 : 55

رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقَيۡنِ وَرَبُّ ٱلۡمَغۡرِبَيۡنِ

17. Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

18. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
19 : 55

مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ يَلۡتَقِيَانِ

19. Atika bibale mibale bileka na bokutani. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 55

بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخٞ لَّا يَبۡغِيَانِ

20. Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

21. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
22 : 55

يَخۡرُجُ مِنۡهُمَا ٱللُّؤۡلُؤُ وَٱلۡمَرۡجَانُ

22. Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga). info
التفاسير:

external-link copy
23 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

23. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
24 : 55

وَلَهُ ٱلۡجَوَارِ ٱلۡمُنشَـَٔاتُ فِي ٱلۡبَحۡرِ كَٱلۡأَعۡلَٰمِ

24. Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

25. B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
26 : 55

كُلُّ مَنۡ عَلَيۡهَا فَانٖ

26. Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi). info
التفاسير:

external-link copy
27 : 55

وَيَبۡقَىٰ وَجۡهُ رَبِّكَ ذُو ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ

27. Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

28. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
29 : 55

يَسۡـَٔلُهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ كُلَّ يَوۡمٍ هُوَ فِي شَأۡنٖ

29. Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

30. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
31 : 55

سَنَفۡرُغُ لَكُمۡ أَيُّهَ ٱلثَّقَلَانِ

31. Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima) info
التفاسير:

external-link copy
32 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

32. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
33 : 55

يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ إِنِ ٱسۡتَطَعۡتُمۡ أَن تَنفُذُواْ مِنۡ أَقۡطَارِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ فَٱنفُذُواْۚ لَا تَنفُذُونَ إِلَّا بِسُلۡطَٰنٖ

33. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah). info
التفاسير:

external-link copy
34 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

34. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
35 : 55

يُرۡسَلُ عَلَيۡكُمَا شُوَاظٞ مِّن نَّارٖ وَنُحَاسٞ فَلَا تَنتَصِرَانِ

35. Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

36. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
37 : 55

فَإِذَا ٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ وَرۡدَةٗ كَٱلدِّهَانِ

37. Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

38. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
39 : 55

فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُسۡـَٔلُ عَن ذَنۢبِهِۦٓ إِنسٞ وَلَا جَآنّٞ

39. O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango(1). info

1 Mokapo oyo elakisi ete bakotunama te omokolo ya suka mpamba te masumu na bango eyebani.

التفاسير:

external-link copy
40 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

40. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
41 : 55

يُعۡرَفُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ بِسِيمَٰهُمۡ فَيُؤۡخَذُ بِٱلنَّوَٰصِي وَٱلۡأَقۡدَامِ

41. Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

42. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
43 : 55

هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِي يُكَذِّبُ بِهَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ

43. Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 55

يَطُوفُونَ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَ حَمِيمٍ ءَانٖ

44. Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

45. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
46 : 55

وَلِمَنۡ خَافَ مَقَامَ رَبِّهِۦ جَنَّتَانِ

46. Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola), info
التفاسير:

external-link copy
47 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

47. Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
48 : 55

ذَوَاتَآ أَفۡنَانٖ

48. Okati na yango ezali na bolamu mibale, info
التفاسير:

external-link copy
49 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

49. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
50 : 55

فِيهِمَا عَيۡنَانِ تَجۡرِيَانِ

50. O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola, info
التفاسير:

external-link copy
51 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

51. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
52 : 55

فِيهِمَا مِن كُلِّ فَٰكِهَةٖ زَوۡجَانِ

52. O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale. info
التفاسير:

external-link copy
53 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

53. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
54 : 55

مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ فُرُشِۭ بَطَآئِنُهَا مِنۡ إِسۡتَبۡرَقٖۚ وَجَنَى ٱلۡجَنَّتَيۡنِ دَانٖ

54. Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka. info
التفاسير:

external-link copy
55 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

55. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
56 : 55

فِيهِنَّ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٞ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنّٞ

56. Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango, info
التفاسير:

external-link copy
57 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

57. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
58 : 55

كَأَنَّهُنَّ ٱلۡيَاقُوتُ وَٱلۡمَرۡجَانُ

58. Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga. info
التفاسير:

external-link copy
59 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

59. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
60 : 55

هَلۡ جَزَآءُ ٱلۡإِحۡسَٰنِ إِلَّا ٱلۡإِحۡسَٰنُ

60. Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu? info
التفاسير:

external-link copy
61 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

61. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
62 : 55

وَمِن دُونِهِمَا جَنَّتَانِ

62. Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso, info
التفاسير:

external-link copy
63 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

63. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
64 : 55

مُدۡهَآمَّتَانِ

64. Bizali na langi ya mpondu ya moyindo, info
التفاسير:

external-link copy
65 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

65. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
66 : 55

فِيهِمَا عَيۡنَانِ نَضَّاخَتَانِ

66. Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi, info
التفاسير:

external-link copy
67 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

67. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
68 : 55

فِيهِمَا فَٰكِهَةٞ وَنَخۡلٞ وَرُمَّانٞ

68. Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l(1) na rummân(2), info

1 Nagh’l: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99.
2 Rummán: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99

التفاسير:

external-link copy
69 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

69. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
70 : 55

فِيهِنَّ خَيۡرَٰتٌ حِسَانٞ

70. Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu, info
التفاسير:

external-link copy
71 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

71. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
72 : 55

حُورٞ مَّقۡصُورَٰتٞ فِي ٱلۡخِيَامِ

72. Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma, info
التفاسير:

external-link copy
73 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

73. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
74 : 55

لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٞ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنّٞ

74. Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango, info
التفاسير:

external-link copy
75 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

75. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
76 : 55

مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ رَفۡرَفٍ خُضۡرٖ وَعَبۡقَرِيٍّ حِسَانٖ

76. Bakoyekama na bikata(1) ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko. info

1 Bikata: Ekata: Ezali: (Coussin).

التفاسير:

external-link copy
77 : 55

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ

77. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? info
التفاسير:

external-link copy
78 : 55

تَبَٰرَكَ ٱسۡمُ رَبِّكَ ذِي ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ

78. Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto. info
التفاسير: