11. Batindami ba bango bayanolaki bango balobi: Ya soló penza, tozali bato lokola bino, kasi Allah asalisaka oyo alingi o kati ya bawumbu baye. Biso tokoki koyela bino bilembo te sé ezala na bolingi bwa Allah, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi bamipesa.
12. Mpe тропа nini tokomipesa na Allah te asilaki kokamba biso o nzela ya malamu eye tozali kolanda? Mpe Tokakanga mitema тропа minyokoli mia bino, mpe epai ya Allah, bandimi bamipesa.
13. Мре bapengwi balobaki na batindami na bango ete: Tokobimisa bino na mabele ma biso, longola sé soki bozongi na lingomba lia biso. Na yango, Nkolo wa bango akitiseli bango emoniseli ete: Tokoboma babubi.
18. Ndakisa ya misala ya baye bapengwi na Nkolo wa bango, ezali lokola mputulu ememami na mopepe ya makasi, bakokoka kozua litomba na eloko te na maye basalaki, wana ezali libunga ya mosika.