6. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah.
7. Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi.
9. Boye sango ya baye balekaki liboso lia bino ekomelaki bino te ya bato ba Núh, na aad na Thamúd na baye balandaki bango sima? Moko te ayebi bango sé Allah. Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, kasi balobaki na kotiya maboko ma bango na minoko mia bango: Tokondima te na maye botindami na yango, mpe tozali na tembe na maye bozali kobenga biso na yango koleka.
10. Batindami na bango balobaki: Bozali kotiya tembe na Allah, mokeli wa likolo na mabele? Azali kobenga bino mpo alimbisa masumu ma bino, mpe Apesa bino eleko kino mikolo na bino mikoka. (bapengwi bakolobaka): Bozali bato lokola biso, boye bolingi koboisa biso na maye ba nkoko ba biso bazalaki kobondela boyela biso elembo ya polele!