19. Boye moto oyo ayebi été maye makiteli yo ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, akokani na moto oyo miso makangama kati na libungi?, sé banganga ya mayele nde bazali kokanisa malamu.
23. Bakokota na lola (ya edeni) lolenge moko na baye bazali kosala bolamu kowuta na baboti na bango, na basi ba bango, na mabota ma bango. Na baye banso bazali na bondimi ya malamu, mpe ba anzelu bakokotela bango na bizibeli (bikuke) binso,
25. Kaši baye bazali kotosa malako ma bango te o sima ya kolakana тропа Allah, mpe bazali kokabola maye Allah asangisaki yango, mpe bazali kotiya mobulu na kobebisa o kati ya mokili, bakozala na elakeli ya mabe mpe bakozalaka na suka ya mabe.
26. Allah apesaka ebele bomengo na oyo alingi, mpe akutolaka, bazali kosepela na bomoyi ya nsé, kasi bisengo ya nsé liboso ya bisengo ya mokolo ya suka ezali lokola masano ya tangu токе.