6. Mpe bazali kowela kosenga yo été mabe eyela bango noki, kasi bazali kowelela te kosenga bolamu. Mpe ya sólo, bitumbu ya ndenge wana esi esalami liboso na bango, mpe ya sólo, Nkolo nayo atonda bolimbisi тропа bato likolo ya mabe na bango, mpe ya soló, Nkolo nayo apesaka etumbu ya makasi.
7. Mpe bapengwi bazali koloba: Boye тропа nini te makamwisi mikitelaki ye (Muhammad) kowuta epai ya Nkolo waye? Ya sólo, ozali nde mokebisi, mpe bato na bato bazali na mokambi.
8. Allah ayebi oyo mwasi amemi okati ya libumu naye, na eleko oyo ekosala o kati ya libumu, na bozingami bona, mpe atiya eloko na eloko na ndelo na yango.
11. Moto azali na ba anzelu sima naye mpe liboso naye bazali kokita tango nyoso тропа kobatela ye na mokano kowuta epai ya Allah. Ya sólo, Allah akobongola makambo ya bato te kino bango moko bakobongola maye bazali na yango kowuta na milimo mia bango, soki Allah alingi mabe ezua bato, moto moko ya kopekisa azali te. Mpe bakozala na mobateli ata moko te na botiki ye.
13. Mpe nkake ezali kokumisa ye na lolaka na yango, na ba anzelu kati na bobangi naye. Mpe azali kotinda mikalali mpo ezwa oyo alingi, kasi bazali kobunda о nzela ya Allah mpe azali makasi na etumbu.