66. Mpe alobi été: Nakotinda ye na bino te. Kino bosalela ngai malako epai ya Allah ete bokoyela ngai ye, longola sé bokufa bino banso. Tango bayeli ye yango, alobi: Allah nde mobateli wa manso na maye tolobi!
67. Mpe alobi été: Oh bana na ngai! Bokota na ekoteli moko te, (bino banso), kasi bokota bipai na bipai. Nakoki kosalisa bino koleka Allah te, mobeko ezali sé ya Allah, mpe natiye elikya na ngai epai naye, mpe tika ete baye bamipesaka ba mipesa sé epai naye.
68. Mpe tango bakoti na bisika biye balakisaki bango na tata wa bango, esalisaki bango na eloko te koleka mibeko mia Allah, ezalaki sé makanisi та Ya’qúb maye atiyaki. Kasi azalaki na boyebi mingi na maye tolakisaki ye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.