50. Мре mokonzi alobi: Bomemela ngai ye, tango motindami ayei kopesa ye (Yûsuf) sango ena, (Yûsuf) alobi: Zonga epai ya mokonzi wayo, tuna ye boni sango ya basi baye bamizokisaki maboko? Ya soló, Nkolo wa ngai ayebi likita ya mabe na bango.
51. (Mokonzi alobi na bango): Eloko nini etindaki bino bokweyela Yûsuf? Bayanoli: Na Allah nde mosepelisi, toyebi ye na eloko ya mabe te. Mpe mwasi wa mokonzi alobi: Sikoyo nde bosóló boyebani. Ezalaki nde ngai nalingaki komikweisa epai naye, mpe ye azalaki o kati ya balobi bosôló.