የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ

Al-A’la

external-link copy
1 : 87

سَبِّحِ ٱسۡمَ رَبِّكَ ٱلۡأَعۡلَى

1. S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka, info
التفاسير:

external-link copy
2 : 87

ٱلَّذِي خَلَقَ فَسَوَّىٰ

2. Oyo akela mpe akokisa, info
التفاسير:

external-link copy
3 : 87

وَٱلَّذِي قَدَّرَ فَهَدَىٰ

3. Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba, info
التفاسير:

external-link copy
4 : 87

وَٱلَّذِيٓ أَخۡرَجَ ٱلۡمَرۡعَىٰ

4. Mpe oyo abimisa matiti, info
التفاسير:

external-link copy
5 : 87

فَجَعَلَهُۥ غُثَآءً أَحۡوَىٰ

5. Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 87

سَنُقۡرِئُكَ فَلَا تَنسَىٰٓ

6. Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te, info
التفاسير:

external-link copy
7 : 87

إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ يَعۡلَمُ ٱلۡجَهۡرَ وَمَا يَخۡفَىٰ

7. Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 87

وَنُيَسِّرُكَ لِلۡيُسۡرَىٰ

8. Mpe tokolakisa yo nzela ya pete. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 87

فَذَكِّرۡ إِن نَّفَعَتِ ٱلذِّكۡرَىٰ

9. Pesa liteya na baye ekosalisa bango. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 87

سَيَذَّكَّرُ مَن يَخۡشَىٰ

10. Oyo azali na bobangi nde akokanisa. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 87

وَيَتَجَنَّبُهَا ٱلۡأَشۡقَى

11. Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 87

ٱلَّذِي يَصۡلَى ٱلنَّارَ ٱلۡكُبۡرَىٰ

12. Oyo akozika na moto ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 87

ثُمَّ لَا يَمُوتُ فِيهَا وَلَا يَحۡيَىٰ

13. O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 87

قَدۡ أَفۡلَحَ مَن تَزَكَّىٰ

14. Asili kolonga oyo amipetoli, info
التفاسير:

external-link copy
15 : 87

وَذَكَرَ ٱسۡمَ رَبِّهِۦ فَصَلَّىٰ

15. Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 87

بَلۡ تُؤۡثِرُونَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا

16. Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé, info
التفاسير:

external-link copy
17 : 87

وَٱلۡأٓخِرَةُ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰٓ

17. Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 87

إِنَّ هَٰذَا لَفِي ٱلصُّحُفِ ٱلۡأُولَىٰ

18. Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 87

صُحُفِ إِبۡرَٰهِيمَ وَمُوسَىٰ

19. Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa. info
التفاسير: