የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ

An-Najm

external-link copy
1 : 53

وَٱلنَّجۡمِ إِذَا هَوَىٰ

1. Na monzoto tango ekweyaka. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 53

مَا ضَلَّ صَاحِبُكُمۡ وَمَا غَوَىٰ

2. Moninga na bino abungi te mpe akosami te. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 53

وَمَا يَنطِقُ عَنِ ٱلۡهَوَىٰٓ

3. Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 53

إِنۡ هُوَ إِلَّا وَحۡيٞ يُوحَىٰ

4. Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 53

عَلَّمَهُۥ شَدِيدُ ٱلۡقُوَىٰ

5. (Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 53

ذُو مِرَّةٖ فَٱسۡتَوَىٰ

6. Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 53

وَهُوَ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡأَعۡلَىٰ

7. Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 53

ثُمَّ دَنَا فَتَدَلَّىٰ

8. Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 53

فَكَانَ قَابَ قَوۡسَيۡنِ أَوۡ أَدۡنَىٰ

9. Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 53

فَأَوۡحَىٰٓ إِلَىٰ عَبۡدِهِۦ مَآ أَوۡحَىٰ

10. Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 53

مَا كَذَبَ ٱلۡفُؤَادُ مَا رَأَىٰٓ

11. Motema ekosaki te oyo emonaki. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 53

أَفَتُمَٰرُونَهُۥ عَلَىٰ مَا يَرَىٰ

12. Boye bokoboyela ye na oyo amonaki? info
التفاسير:

external-link copy
13 : 53

وَلَقَدۡ رَءَاهُ نَزۡلَةً أُخۡرَىٰ

13. Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale . info
التفاسير:

external-link copy
14 : 53

عِندَ سِدۡرَةِ ٱلۡمُنتَهَىٰ

14. Pene na sidr muntaha(1). info

1 Sidr muntaha: Ezali nzete oyo ezuami likolo ya mapata sambo.

التفاسير:

external-link copy
15 : 53

عِندَهَا جَنَّةُ ٱلۡمَأۡوَىٰٓ

15. Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 53

إِذۡ يَغۡشَى ٱلسِّدۡرَةَ مَا يَغۡشَىٰ

16. Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 53

مَا زَاغَ ٱلۡبَصَرُ وَمَا طَغَىٰ

17. Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 53

لَقَدۡ رَأَىٰ مِنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ

18. Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 53

أَفَرَءَيۡتُمُ ٱللَّٰتَ وَٱلۡعُزَّىٰ

19. Bopesa ngai sango ya Láta(2) na Uzza(1)? info

1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?

التفاسير:

external-link copy
20 : 53

وَمَنَوٰةَ ٱلثَّالِثَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰٓ

20. Mpe mosusu ya misato Manáta(1). info

1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?

التفاسير:

external-link copy
21 : 53

أَلَكُمُ ٱلذَّكَرُ وَلَهُ ٱلۡأُنثَىٰ

21. Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi? info
التفاسير:

external-link copy
22 : 53

تِلۡكَ إِذٗا قِسۡمَةٞ ضِيزَىٰٓ

22. Wana ezali bokaboli ya mabe. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 53

إِنۡ هِيَ إِلَّآ أَسۡمَآءٞ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَمَا تَهۡوَى ٱلۡأَنفُسُۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّن رَّبِّهِمُ ٱلۡهُدَىٰٓ

23. Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 53

أَمۡ لِلۡإِنسَٰنِ مَا تَمَنَّىٰ

24. To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa? info
التفاسير:

external-link copy
25 : 53

فَلِلَّهِ ٱلۡأٓخِرَةُ وَٱلۡأُولَىٰ

25. Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 53

۞ وَكَم مِّن مَّلَكٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ لَا تُغۡنِي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـًٔا إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ أَن يَأۡذَنَ ٱللَّهُ لِمَن يَشَآءُ وَيَرۡضَىٰٓ

26. Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 53

إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ لَيُسَمُّونَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ تَسۡمِيَةَ ٱلۡأُنثَىٰ

27. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 53

وَمَا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّۖ وَإِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـٔٗا

28. Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 53

فَأَعۡرِضۡ عَن مَّن تَوَلَّىٰ عَن ذِكۡرِنَا وَلَمۡ يُرِدۡ إِلَّا ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا

29. Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 53

ذَٰلِكَ مَبۡلَغُهُم مِّنَ ٱلۡعِلۡمِۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱهۡتَدَىٰ

30. Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 53

وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ بِمَا عَمِلُواْ وَيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ بِٱلۡحُسۡنَى

31. Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 53

ٱلَّذِينَ يَجۡتَنِبُونَ كَبَٰٓئِرَ ٱلۡإِثۡمِ وَٱلۡفَوَٰحِشَ إِلَّا ٱللَّمَمَۚ إِنَّ رَبَّكَ وَٰسِعُ ٱلۡمَغۡفِرَةِۚ هُوَ أَعۡلَمُ بِكُمۡ إِذۡ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ وَإِذۡ أَنتُمۡ أَجِنَّةٞ فِي بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمۡۖ فَلَا تُزَكُّوٓاْ أَنفُسَكُمۡۖ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱتَّقَىٰٓ

32. Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza. info
التفاسير:

external-link copy
33 : 53

أَفَرَءَيۡتَ ٱلَّذِي تَوَلَّىٰ

33. Omoni te oyo azali kopesa mokongo? info
التفاسير:

external-link copy
34 : 53

وَأَعۡطَىٰ قَلِيلٗا وَأَكۡدَىٰٓ

34. Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 53

أَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلۡغَيۡبِ فَهُوَ يَرَىٰٓ

35. Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona? info
التفاسير:

external-link copy
36 : 53

أَمۡ لَمۡ يُنَبَّأۡ بِمَا فِي صُحُفِ مُوسَىٰ

36. To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa? info
التفاسير:

external-link copy
37 : 53

وَإِبۡرَٰهِيمَ ٱلَّذِي وَفَّىٰٓ

37. Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka, info
التفاسير:

external-link copy
38 : 53

أَلَّا تَزِرُ وَازِرَةٞ وِزۡرَ أُخۡرَىٰ

38. Moto moko te akomema lisumu ya moninga, info
التفاسير:

external-link copy
39 : 53

وَأَن لَّيۡسَ لِلۡإِنسَٰنِ إِلَّا مَا سَعَىٰ

39. Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 53

وَأَنَّ سَعۡيَهُۥ سَوۡفَ يُرَىٰ

40. Mpe ya sólo, molende naye ekomonana, info
التفاسير:

external-link copy
41 : 53

ثُمَّ يُجۡزَىٰهُ ٱلۡجَزَآءَ ٱلۡأَوۡفَىٰ

41. Sima, akofutama mpenza malamu. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 53

وَأَنَّ إِلَىٰ رَبِّكَ ٱلۡمُنتَهَىٰ

42. Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo, info
التفاسير:

external-link copy
43 : 53

وَأَنَّهُۥ هُوَ أَضۡحَكَ وَأَبۡكَىٰ

43. Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka, info
التفاسير:

external-link copy
44 : 53

وَأَنَّهُۥ هُوَ أَمَاتَ وَأَحۡيَا

44. Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi? info
التفاسير:

external-link copy
45 : 53

وَأَنَّهُۥ خَلَقَ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰ

45. Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali, info
التفاسير:

external-link copy
46 : 53

مِن نُّطۡفَةٍ إِذَا تُمۡنَىٰ

46. Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango . info
التفاسير:

external-link copy
47 : 53

وَأَنَّ عَلَيۡهِ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰ

47. Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 53

وَأَنَّهُۥ هُوَ أَغۡنَىٰ وَأَقۡنَىٰ

48. Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 53

وَأَنَّهُۥ هُوَ رَبُّ ٱلشِّعۡرَىٰ

49. Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ(1). info

1 Ach-chi’rá: Ezali: Monzoto oyo bazalaki kokumisa na boyinga Allah nde akela yango.

التفاسير:

external-link copy
50 : 53

وَأَنَّهُۥٓ أَهۡلَكَ عَادًا ٱلۡأُولَىٰ

50. Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad, info
التفاسير:

external-link copy
51 : 53

وَثَمُودَاْ فَمَآ أَبۡقَىٰ

51. Na Thamûd, moko atikala te. info
التفاسير:

external-link copy
52 : 53

وَقَوۡمَ نُوحٖ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ هُمۡ أَظۡلَمَ وَأَطۡغَىٰ

52. Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo. info
التفاسير:

external-link copy
53 : 53

وَٱلۡمُؤۡتَفِكَةَ أَهۡوَىٰ

53. Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth), info
التفاسير:

external-link copy
54 : 53

فَغَشَّىٰهَا مَا غَشَّىٰ

54. Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
55 : 53

فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكَ تَتَمَارَىٰ

55. Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe? info
التفاسير:

external-link copy
56 : 53

هَٰذَا نَذِيرٞ مِّنَ ٱلنُّذُرِ ٱلۡأُولَىٰٓ

56. Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo. info
التفاسير:

external-link copy
57 : 53

أَزِفَتِ ٱلۡأٓزِفَةُ

57. Ngonga esili kobeleme. info
التفاسير:

external-link copy
58 : 53

لَيۡسَ لَهَا مِن دُونِ ٱللَّهِ كَاشِفَةٌ

58. Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah. info
التفاسير:

external-link copy
59 : 53

أَفَمِنۡ هَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ تَعۡجَبُونَ

59. Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani) info
التفاسير:

external-link copy
60 : 53

وَتَضۡحَكُونَ وَلَا تَبۡكُونَ

60. Mpe bozali koseka na esika ya kolela? info
التفاسير:

external-link copy
61 : 53

وَأَنتُمۡ سَٰمِدُونَ

61. Kasi bozali sé kosakana? info
التفاسير:

external-link copy
62 : 53

فَٱسۡجُدُواْۤ لِلَّهِۤ وَٱعۡبُدُواْ۩

62. Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye). info
التفاسير: