የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ

የገፅ ቁጥር:close

external-link copy
31 : 22

حُنَفَآءَ لِلَّهِ غَيۡرَ مُشۡرِكِينَ بِهِۦۚ وَمَن يُشۡرِكۡ بِٱللَّهِ فَكَأَنَّمَا خَرَّ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَتَخۡطَفُهُ ٱلطَّيۡرُ أَوۡ تَهۡوِي بِهِ ٱلرِّيحُ فِي مَكَانٖ سَحِيقٖ

31. (Bozala) Sembo liboso ya Allah, bosangisa ye na eloko te. Mpe oyo akosangisa Allah, azali lokola oyo akwei kowuta о likolo, bandeke bamemi ye to mopepe mozui ye о esika ya mosika. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 22

ذَٰلِكَۖ وَمَن يُعَظِّمۡ شَعَٰٓئِرَ ٱللَّهِ فَإِنَّهَا مِن تَقۡوَى ٱلۡقُلُوبِ

32. Na yango: Oyo akokumisa mibeko ya Allah, ya soló wana nde ezali kolakisa mitema ya bobangi (Allah). info
التفاسير:

external-link copy
33 : 22

لَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى ثُمَّ مَحِلُّهَآ إِلَى ٱلۡبَيۡتِ ٱلۡعَتِيقِ

33. Kati ya banyama wana ekosalisa bino kino tango eyebani, тре esika ya kosasa yango ekozala pembeni ya ndako esantu. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 22

وَلِكُلِّ أُمَّةٖ جَعَلۡنَا مَنسَكٗا لِّيَذۡكُرُواْ ٱسۡمَ ٱللَّهِ عَلَىٰ مَا رَزَقَهُم مِّنۢ بَهِيمَةِ ٱلۡأَنۡعَٰمِۗ فَإِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَلَهُۥٓ أَسۡلِمُواْۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُخۡبِتِينَ

34. Mpe umma(1) nionso totielaki bango lolenge ya kokumisa Allah na bopesi mbeka, mpo ete batanga nkombo ya Allah likolo ya bibwele biye apesaki bango, mpe Nzambe wa bino azali Nzambe moko ya sólo, botosa ye mpe pesa sango elamu epai ya bamikitisi. info

1 Umma: Elakisi: Lisanga, bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.

التفاسير:

external-link copy
35 : 22

ٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِرَ ٱللَّهُ وَجِلَتۡ قُلُوبُهُمۡ وَٱلصَّٰبِرِينَ عَلَىٰ مَآ أَصَابَهُمۡ وَٱلۡمُقِيمِي ٱلصَّلَوٰةِ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ

35. Baye bazalaka soki nkombo ya Allah etangami, mitema mia bango milengi, mpe soki mabe ezui bango bakangi mitema, Mpe batelemisi losambo mpe bazali kobimisa maye topesaki bango, (тропа Allah) info
التفاسير:

external-link copy
36 : 22

وَٱلۡبُدۡنَ جَعَلۡنَٰهَا لَكُم مِّن شَعَٰٓئِرِ ٱللَّهِ لَكُمۡ فِيهَا خَيۡرٞۖ فَٱذۡكُرُواْ ٱسۡمَ ٱللَّهِ عَلَيۡهَا صَوَآفَّۖ فَإِذَا وَجَبَتۡ جُنُوبُهَا فَكُلُواْ مِنۡهَا وَأَطۡعِمُواْ ٱلۡقَانِعَ وَٱلۡمُعۡتَرَّۚ كَذَٰلِكَ سَخَّرۡنَٰهَا لَكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ

36. Mpe totielaki bino budna(1) moko ya bilembo ya Allah, bozali na bolamo kati na yango mpe tango bozali kokata yango, botanga nkombo ya Allah yambo ya kosasa, na tango azali ya kotelema sima (soki ekufi) ekwei na mabele bolia yango mpe boleisa baye bazangi, mpe ba oyo bakokaka kosenga te, na boye nde topesaki bino yango mpo ete bopesa biso matondi. info

1 Budna: Ibili (chameau) na ngombe.

التفاسير:

external-link copy
37 : 22

لَن يَنَالَ ٱللَّهَ لُحُومُهَا وَلَا دِمَآؤُهَا وَلَٰكِن يَنَالُهُ ٱلتَّقۡوَىٰ مِنكُمۡۚ كَذَٰلِكَ سَخَّرَهَا لَكُمۡ لِتُكَبِّرُواْ ٱللَّهَ عَلَىٰ مَا هَدَىٰكُمۡۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُحۡسِنِينَ

37. Allah atalaka mișuni na makila na yango te, kasi atalaka nde bobangi na bino. Lolenge wana nde atielaki bino yango, mpo ete bokumisa bonene ya Allah na maye akambi bino (o nzela ya semba) mpe pesa babongisi sango elamu. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 22

۞ إِنَّ ٱللَّهَ يُدَٰفِعُ عَنِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ كُلَّ خَوَّانٖ كَفُورٍ

38. Ya soló, Allah abundelaka bandimi, ya solo, Allah alingaka te mokosi oyo nyoso azanga botondi. info
التفاسير: