የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ

የገፅ ቁጥር:close

external-link copy
257 : 2

ٱللَّهُ وَلِيُّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ يُخۡرِجُهُم مِّنَ ٱلظُّلُمَٰتِ إِلَى ٱلنُّورِۖ وَٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَوۡلِيَآؤُهُمُ ٱلطَّٰغُوتُ يُخۡرِجُونَهُم مِّنَ ٱلنُّورِ إِلَى ٱلظُّلُمَٰتِۗ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ

257. Allah nde azali Nkolo ya bandimi, azali kobimisa bango na molili mpe kotia bango na nzela ya mwinda, kasi baye bapengwi basatana nde bazali bankolo na bango, bazali kolongola bango na nzela ya mwinda mpe komema bango na molili, bango wana nde bato ya móto, bakozala na kati seko na seko. info
التفاسير:

external-link copy
258 : 2

أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِي حَآجَّ إِبۡرَٰهِـۧمَ فِي رَبِّهِۦٓ أَنۡ ءَاتَىٰهُ ٱللَّهُ ٱلۡمُلۡكَ إِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِـۧمُ رَبِّيَ ٱلَّذِي يُحۡيِۦ وَيُمِيتُ قَالَ أَنَا۠ أُحۡيِۦ وَأُمِيتُۖ قَالَ إِبۡرَٰهِـۧمُ فَإِنَّ ٱللَّهَ يَأۡتِي بِٱلشَّمۡسِ مِنَ ٱلۡمَشۡرِقِ فَأۡتِ بِهَا مِنَ ٱلۡمَغۡرِبِ فَبُهِتَ ٱلَّذِي كَفَرَۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ

258. Boye oyebi te oyo Allah apesaki bokonzi asuanisaki Ibrâhîm mpona Nkolo naye? Tango Ibrâhîm alobaki naye ete: Nkolo na ngai nde oyo apesaka liwa mpe bomoyi, alobaki na Ibrâhîm ete: Ngai mpe na pesaka liwa mpe bomoyi. Ibrâhîm alobaki naye lisusu ete: Kasi ya sôló, Allah abimisaka mwese na moniele, yo mpe bimisa yango na eloli. Na sima ye mopagano azangaki eloko ya kosala. Mpe Allah akambaka bato ya mabe te. info
التفاسير:

external-link copy
259 : 2

أَوۡ كَٱلَّذِي مَرَّ عَلَىٰ قَرۡيَةٖ وَهِيَ خَاوِيَةٌ عَلَىٰ عُرُوشِهَا قَالَ أَنَّىٰ يُحۡيِۦ هَٰذِهِ ٱللَّهُ بَعۡدَ مَوۡتِهَاۖ فَأَمَاتَهُ ٱللَّهُ مِاْئَةَ عَامٖ ثُمَّ بَعَثَهُۥۖ قَالَ كَمۡ لَبِثۡتَۖ قَالَ لَبِثۡتُ يَوۡمًا أَوۡ بَعۡضَ يَوۡمٖۖ قَالَ بَل لَّبِثۡتَ مِاْئَةَ عَامٖ فَٱنظُرۡ إِلَىٰ طَعَامِكَ وَشَرَابِكَ لَمۡ يَتَسَنَّهۡۖ وَٱنظُرۡ إِلَىٰ حِمَارِكَ وَلِنَجۡعَلَكَ ءَايَةٗ لِّلنَّاسِۖ وَٱنظُرۡ إِلَى ٱلۡعِظَامِ كَيۡفَ نُنشِزُهَا ثُمَّ نَكۡسُوهَا لَحۡمٗاۚ فَلَمَّا تَبَيَّنَ لَهُۥ قَالَ أَعۡلَمُ أَنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ

259. To mpe lokola moto oyo Alekaki mboka moko boye ezalaki ya kokufa, alobaki ete: Ndenge nini Allah akozongisa yango na bomoyi sima ya liwa? Mpe Allah abomaki ye moto wana, mpe awumelaki na mabele mbula nkama moko. Na sima Allah asekwisi ye, mpe atuni ye: Osali mikolo boni awa? Azongisaki eyano ete: Nasali mokolo moko to ndambu ya mokolo, (Allah) alobi naye ete: Yo osali mbula nkama moko awa, tala bilei nayo na mayi nayo ya komela ezali ya kobeba te, mpe tala epai ya himar(1) nayo etikali sé mikuwa. Mpe mpo totia yo ozala elembo epai ya bato, kasi tala epai ya mikuwa ndenge ngai (Allah) nazali kozongisa yango na sima nalatisi yango misuni. Mpe tango amonaki ete Allah asekwisi himar naye, alobaki ete: Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso. info

1 Himar: Azali niama oyo azali lokola mpunda kasi ya токе, amemaka mikumba, (áne).

التفاسير: