Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго

Al-Qamar

external-link copy
1 : 54

ٱقۡتَرَبَتِ ٱلسَّاعَةُ وَٱنشَقَّ ٱلۡقَمَرُ

1. Ngonga epusani mpe sanza epasuki. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 54

وَإِن يَرَوۡاْ ءَايَةٗ يُعۡرِضُواْ وَيَقُولُواْ سِحۡرٞ مُّسۡتَمِرّٞ

2. Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 54

وَكَذَّبُواْ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُمۡۚ وَكُلُّ أَمۡرٖ مُّسۡتَقِرّٞ

3. Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 54

وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّنَ ٱلۡأَنۢبَآءِ مَا فِيهِ مُزۡدَجَرٌ

4. Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe), info
التفاسير:

external-link copy
5 : 54

حِكۡمَةُۢ بَٰلِغَةٞۖ فَمَا تُغۡنِ ٱلنُّذُرُ

5. Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 54

فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡۘ يَوۡمَ يَدۡعُ ٱلدَّاعِ إِلَىٰ شَيۡءٖ نُّكُرٍ

6. Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 54

خُشَّعًا أَبۡصَٰرُهُمۡ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ كَأَنَّهُمۡ جَرَادٞ مُّنتَشِرٞ

7. Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 54

مُّهۡطِعِينَ إِلَى ٱلدَّاعِۖ يَقُولُ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَسِرٞ

8. Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 54

۞ كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ فَكَذَّبُواْ عَبۡدَنَا وَقَالُواْ مَجۡنُونٞ وَٱزۡدُجِرَ

9. Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 54

فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَغۡلُوبٞ فَٱنتَصِرۡ

10. Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo) info
التفاسير:

external-link copy
11 : 54

فَفَتَحۡنَآ أَبۡوَٰبَ ٱلسَّمَآءِ بِمَآءٖ مُّنۡهَمِرٖ

11. Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 54

وَفَجَّرۡنَا ٱلۡأَرۡضَ عُيُونٗا فَٱلۡتَقَى ٱلۡمَآءُ عَلَىٰٓ أَمۡرٖ قَدۡ قُدِرَ

12. Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 54

وَحَمَلۡنَٰهُ عَلَىٰ ذَاتِ أَلۡوَٰحٖ وَدُسُرٖ

13. Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 54

تَجۡرِي بِأَعۡيُنِنَا جَزَآءٗ لِّمَن كَانَ كُفِرَ

14. Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 54

وَلَقَد تَّرَكۡنَٰهَآ ءَايَةٗ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

15. Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te? info
التفاسير:

external-link copy
16 : 54

فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ

16. Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki? info
التفاسير:

external-link copy
17 : 54

وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

17. Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa? info
التفاسير:

external-link copy
18 : 54

كَذَّبَتۡ عَادٞ فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ

18. Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni? info
التفاسير:

external-link copy
19 : 54

إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ رِيحٗا صَرۡصَرٗا فِي يَوۡمِ نَحۡسٖ مُّسۡتَمِرّٖ

19. Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 54

تَنزِعُ ٱلنَّاسَ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلٖ مُّنقَعِرٖ

20. Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l(1) oyo bapikoli. info

1 Nagh’l: Bótala suratu Al-Kahf mokapo: 32. Na Al-Isrá: 91.

التفاسير:

external-link copy
21 : 54

فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ

21. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni? info
التفاسير:

external-link copy
22 : 54

وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

22. Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa? info
التفاسير:

external-link copy
23 : 54

كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِٱلنُّذُرِ

23. Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 54

فَقَالُوٓاْ أَبَشَرٗا مِّنَّا وَٰحِدٗا نَّتَّبِعُهُۥٓ إِنَّآ إِذٗا لَّفِي ضَلَٰلٖ وَسُعُرٍ

24. Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 54

أَءُلۡقِيَ ٱلذِّكۡرُ عَلَيۡهِ مِنۢ بَيۡنِنَا بَلۡ هُوَ كَذَّابٌ أَشِرٞ

25. Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 54

سَيَعۡلَمُونَ غَدٗا مَّنِ ٱلۡكَذَّابُ ٱلۡأَشِرُ

26. Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 54

إِنَّا مُرۡسِلُواْ ٱلنَّاقَةِ فِتۡنَةٗ لَّهُمۡ فَٱرۡتَقِبۡهُمۡ وَٱصۡطَبِرۡ

27. Ya sólo, totindelaki bango náqah(1) lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema. info

1 Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf mokapo: 73.

التفاسير:

external-link copy
28 : 54

وَنَبِّئۡهُمۡ أَنَّ ٱلۡمَآءَ قِسۡمَةُۢ بَيۡنَهُمۡۖ كُلُّ شِرۡبٖ مُّحۡتَضَرٞ

28. Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 54

فَنَادَوۡاْ صَاحِبَهُمۡ فَتَعَاطَىٰ فَعَقَرَ

29. Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 54

فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ

30. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni? info
التفاسير:

external-link copy
31 : 54

إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ فَكَانُواْ كَهَشِيمِ ٱلۡمُحۡتَظِرِ

31. Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 54

وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

32. Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa? info
التفاسير:

external-link copy
33 : 54

كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطِۭ بِٱلنُّذُرِ

33. Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 54

إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ حَاصِبًا إِلَّآ ءَالَ لُوطٖۖ نَّجَّيۡنَٰهُم بِسَحَرٖ

34. Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 54

نِّعۡمَةٗ مِّنۡ عِندِنَاۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي مَن شَكَرَ

35. Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah) info
التفاسير:

external-link copy
36 : 54

وَلَقَدۡ أَنذَرَهُم بَطۡشَتَنَا فَتَمَارَوۡاْ بِٱلنُّذُرِ

36. Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 54

وَلَقَدۡ رَٰوَدُوهُ عَن ضَيۡفِهِۦ فَطَمَسۡنَآ أَعۡيُنَهُمۡ فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ

37. Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 54

وَلَقَدۡ صَبَّحَهُم بُكۡرَةً عَذَابٞ مُّسۡتَقِرّٞ

38. Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 54

فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ

39. Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 54

وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

40. Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa? info
التفاسير:

external-link copy
41 : 54

وَلَقَدۡ جَآءَ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ ٱلنُّذُرُ

41. Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 54

كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كُلِّهَا فَأَخَذۡنَٰهُمۡ أَخۡذَ عَزِيزٖ مُّقۡتَدِرٍ

42. Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki. info
التفاسير:

external-link copy
43 : 54

أَكُفَّارُكُمۡ خَيۡرٞ مِّنۡ أُوْلَٰٓئِكُمۡ أَمۡ لَكُم بَرَآءَةٞ فِي ٱلزُّبُرِ

43. Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi? info
التفاسير:

external-link copy
44 : 54

أَمۡ يَقُولُونَ نَحۡنُ جَمِيعٞ مُّنتَصِرٞ

44. Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 54

سَيُهۡزَمُ ٱلۡجَمۡعُ وَيُوَلُّونَ ٱلدُّبُرَ

45. Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 54

بَلِ ٱلسَّاعَةُ مَوۡعِدُهُمۡ وَٱلسَّاعَةُ أَدۡهَىٰ وَأَمَرُّ

46. Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 54

إِنَّ ٱلۡمُجۡرِمِينَ فِي ضَلَٰلٖ وَسُعُرٖ

47. Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 54

يَوۡمَ يُسۡحَبُونَ فِي ٱلنَّارِ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ ذُوقُواْ مَسَّ سَقَرَ

48. Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 54

إِنَّا كُلَّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَٰهُ بِقَدَرٖ

49. Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki. info
التفاسير:

external-link copy
50 : 54

وَمَآ أَمۡرُنَآ إِلَّا وَٰحِدَةٞ كَلَمۡحِۭ بِٱلۡبَصَرِ

50. Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 54

وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَآ أَشۡيَاعَكُمۡ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ

51. Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te? info
التفاسير:

external-link copy
52 : 54

وَكُلُّ شَيۡءٖ فَعَلُوهُ فِي ٱلزُّبُرِ

52. Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku) info
التفاسير:

external-link copy
53 : 54

وَكُلُّ صَغِيرٖ وَكَبِيرٖ مُّسۡتَطَرٌ

53. ( Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama. info
التفاسير:

external-link copy
54 : 54

إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَنَهَرٖ

54. Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango. info
التفاسير:

external-link copy
55 : 54

فِي مَقۡعَدِ صِدۡقٍ عِندَ مَلِيكٖ مُّقۡتَدِرِۭ

55. Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah). info
التفاسير: