Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго

Бет рақами:close

external-link copy
99 : 20

كَذَٰلِكَ نَقُصُّ عَلَيۡكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ مَا قَدۡ سَبَقَۚ وَقَدۡ ءَاتَيۡنَٰكَ مِن لَّدُنَّا ذِكۡرٗا

99. Lolenge wana nde tozali kobetela yo makambo ya ba oyo baleka. Mpe ya sólo, tosilaka kopesa yo bokundoli bwa biso. info
التفاسير:

external-link copy
100 : 20

مَّنۡ أَعۡرَضَ عَنۡهُ فَإِنَّهُۥ يَحۡمِلُ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وِزۡرًا

100. Oyo akoboya kondima na yango (kurani) ya soló, ye o mokolo ya suka akomemaka mokumba. info
التفاسير:

external-link copy
101 : 20

خَٰلِدِينَ فِيهِۖ وَسَآءَ لَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ حِمۡلٗا

101. Bakotikalaka libela o kati na yango, mpe bakozuaka mabe o mokolo mona. info
التفاسير:

external-link copy
102 : 20

يَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِۚ وَنَحۡشُرُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ يَوۡمَئِذٖ زُرۡقٗا

102. Mokolo moye bakofulaka kelelo тропа lisekwa. Mpe tokosangisaka batomboki banso, na langi ya bule (тропа bobangi ya makasi). info
التفاسير:

external-link copy
103 : 20

يَتَخَٰفَتُونَ بَيۡنَهُمۡ إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا عَشۡرٗا

103. Bakolobana kati na bango ete: Bowumelaki na mokili sé mikolo zomi. info
التفاسير:

external-link copy
104 : 20

نَّحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَقُولُونَ إِذۡ يَقُولُ أَمۡثَلُهُمۡ طَرِيقَةً إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا يَوۡمٗا

104. Toyebi na malamu nini bazali koloba, tango moko wa bango oyo azali na ezaleli ya malamu akoloba ete: Borandaki sé mokolo moko. info
التفاسير:

external-link copy
105 : 20

وَيَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡجِبَالِ فَقُلۡ يَنسِفُهَا رَبِّي نَسۡفٗا

105. Bazali kotuna yo тропа bangomba; loba: Nkolo wa ngai akopanzaka yango, ekokomaka lokola mputulu. info
التفاسير:

external-link copy
106 : 20

فَيَذَرُهَا قَاعٗا صَفۡصَفٗا

106. Mpe akotika yango elali polele lokola mabele oyo ezali na eloko te likolo na yango. info
التفاسير:

external-link copy
107 : 20

لَّا تَرَىٰ فِيهَا عِوَجٗا وَلَآ أَمۡتٗا

107. Okomona o kati na yango ata esika moko ezali ya kogumbama te mpe botombwami te. info
التفاسير:

external-link copy
108 : 20

يَوۡمَئِذٖ يَتَّبِعُونَ ٱلدَّاعِيَ لَا عِوَجَ لَهُۥۖ وَخَشَعَتِ ٱلۡأَصۡوَاتُ لِلرَّحۡمَٰنِ فَلَا تَسۡمَعُ إِلَّا هَمۡسٗا

108. Mokolo wana (bato), bakolandaka mobengi na kozanga koyimayima mpe mingongo mikokitisama o boso bwa Ar-Rahmân, ata makelele ya шоке okoyoka na paši. info
التفاسير:

external-link copy
109 : 20

يَوۡمَئِذٖ لَّا تَنفَعُ ٱلشَّفَٰعَةُ إِلَّا مَنۡ أَذِنَ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَرَضِيَ لَهُۥ قَوۡلٗا

109. Mokolo wana kosengela moto ekozalaka te, longola sé oyo Ar-Rahmân akopesaka ye ndingisa, mpe akondimela ye liloba. info
التفاسير:

external-link copy
110 : 20

يَعۡلَمُ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُمۡ وَلَا يُحِيطُونَ بِهِۦ عِلۡمٗا

110. Ayebi maye mazali liboso na bango mpe maye mazali o sima na bango, mpe bazali na boyebi te ya balolenge naye. info
التفاسير:

external-link copy
111 : 20

۞ وَعَنَتِ ٱلۡوُجُوهُ لِلۡحَيِّ ٱلۡقَيُّومِۖ وَقَدۡ خَابَ مَنۡ حَمَلَ ظُلۡمٗا

111. Mpe bilongi bia bato bikokitisamaka тропа oyo azali na bomoi mpe amikoka mpe mabe ekozalaka na oyo akoya liboso naye na bobubami. (mabe) info
التفاسير:

external-link copy
112 : 20

وَمَن يَعۡمَلۡ مِنَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَلَا يَخَافُ ظُلۡمٗا وَلَا هَضۡمٗا

112. Mpe oyo akosala bolamu mpe azali mondimi, akobangaka kobubama te mpe konyokwama te. info
التفاسير:

external-link copy
113 : 20

وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَٰهُ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا وَصَرَّفۡنَا فِيهِ مِنَ ٱلۡوَعِيدِ لَعَلَّهُمۡ يَتَّقُونَ أَوۡ يُحۡدِثُ لَهُمۡ ذِكۡرٗا

113. Mpe lolenge wana nde tokitisaki kurani na ndinga ya arabo, mpe tolimbolaki na kati na yango, тропа balolenge ya bitumbu, mpo bakoka kobanga mpe bakanisa тропа bondimi. info
التفاسير: