قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو

بەت نومۇرى:close

external-link copy
133 : 3

۞ وَسَارِعُوٓاْ إِلَىٰ مَغۡفِرَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ وَجَنَّةٍ عَرۡضُهَا ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ أُعِدَّتۡ لِلۡمُتَّقِينَ

133. Bowela kosala misala ya malamu miye mikopesa bino bolimbisi epai na Nkolo wa bino, mpe paradizu eye monene na yango ezali lokola likolo mpe mabele, Eye ebongisamaki mpona babangi.(1) info

1 Allah.

التفاسير:

external-link copy
134 : 3

ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ فِي ٱلسَّرَّآءِ وَٱلضَّرَّآءِ وَٱلۡكَٰظِمِينَ ٱلۡغَيۡظَ وَٱلۡعَافِينَ عَنِ ٱلنَّاسِۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ

134. Baye babimisaka na tango ya bisengo mpe na tango ya mpasi, mpe baye bakokaka kokanga nkanda te mpe baye balimbisaka bato, Mpe Allah alingaka bato ya bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
135 : 3

وَٱلَّذِينَ إِذَا فَعَلُواْ فَٰحِشَةً أَوۡ ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ ذَكَرُواْ ٱللَّهَ فَٱسۡتَغۡفَرُواْ لِذُنُوبِهِمۡ وَمَن يَغۡفِرُ ٱلذُّنُوبَ إِلَّا ٱللَّهُ وَلَمۡ يُصِرُّواْ عَلَىٰ مَا فَعَلُواْ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ

135. Mpe baye bazali soki basali mbeba to bamisali mabe, bakanisi Allah mpe basengi bolimbisi mpona yango, mpe moko te alimbisaka masumu bobele Allah, mpe batingamaka te na maye bazalaki kosala ya mabe, na bango bazali na kati ya koyeba. info
التفاسير:

external-link copy
136 : 3

أُوْلَٰٓئِكَ جَزَآؤُهُم مَّغۡفِرَةٞ مِّن رَّبِّهِمۡ وَجَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَنِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ

136. Bango wana nde lifuta na bango ezali bolimbisi kowuta epai ya Nkolo na bango, mpe baparadizu wapi epai mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati, oyo nde lifuta ya basali malamu. info
التفاسير:

external-link copy
137 : 3

قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِكُمۡ سُنَنٞ فَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ

137. Makambo ebele esilaki koleka liboso na bino, botambola na mokili mpe bomona ndenge nini bato ya mabe basukaki. info
التفاسير:

external-link copy
138 : 3

هَٰذَا بَيَانٞ لِّلنَّاسِ وَهُدٗى وَمَوۡعِظَةٞ لِّلۡمُتَّقِينَ

138. Oyo ezali mateya ya polele mpona bato, mpe lisungi na malendisi mpona babangi.(1) info

1 Allah.

التفاسير:

external-link copy
139 : 3

وَلَا تَهِنُواْ وَلَا تَحۡزَنُواْ وَأَنتُمُ ٱلۡأَعۡلَوۡنَ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ

139. Botika babeta bino te mpe bomikitisa te mpo bozali likolo na bango, soki ya sôló bozali bandimi. info
التفاسير:

external-link copy
140 : 3

إِن يَمۡسَسۡكُمۡ قَرۡحٞ فَقَدۡ مَسَّ ٱلۡقَوۡمَ قَرۡحٞ مِّثۡلُهُۥۚ وَتِلۡكَ ٱلۡأَيَّامُ نُدَاوِلُهَا بَيۡنَ ٱلنَّاسِ وَلِيَعۡلَمَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَيَتَّخِذَ مِنكُمۡ شُهَدَآءَۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ

140. Soki bozoki mpota, bango mpe bazoki lokola. Na boye tozali kotambuisa mikolo okati na bato mpo ete Allah ayeba bandimi, mpe azua okati na bino baye bawei mpona kobunda na nzela naye, mpe Allah alingaka bato ya mabe te. info
التفاسير: