قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو

بەت نومۇرى:close

external-link copy
90 : 23

بَلۡ أَتَيۡنَٰهُم بِٱلۡحَقِّ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ

90. Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
91 : 23

مَا ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ مِن وَلَدٖ وَمَا كَانَ مَعَهُۥ مِنۡ إِلَٰهٍۚ إِذٗا لَّذَهَبَ كُلُّ إِلَٰهِۭ بِمَا خَلَقَ وَلَعَلَا بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ

91. Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela. info
التفاسير:

external-link copy
92 : 23

عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ

92. Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango. info
التفاسير:

external-link copy
93 : 23

قُل رَّبِّ إِمَّا تُرِيَنِّي مَا يُوعَدُونَ

93. Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 23

رَبِّ فَلَا تَجۡعَلۡنِي فِي ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ

94. (Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te. info
التفاسير:

external-link copy
95 : 23

وَإِنَّا عَلَىٰٓ أَن نُّرِيَكَ مَا نَعِدُهُمۡ لَقَٰدِرُونَ

95. Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango. info
التفاسير:

external-link copy
96 : 23

ٱدۡفَعۡ بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُ ٱلسَّيِّئَةَۚ نَحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَصِفُونَ

96. Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela. info
التفاسير:

external-link copy
97 : 23

وَقُل رَّبِّ أَعُوذُ بِكَ مِنۡ هَمَزَٰتِ ٱلشَّيَٰطِينِ

97. Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana. info
التفاسير:

external-link copy
98 : 23

وَأَعُوذُ بِكَ رَبِّ أَن يَحۡضُرُونِ

98. Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te. info
التفاسير:

external-link copy
99 : 23

حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَحَدَهُمُ ٱلۡمَوۡتُ قَالَ رَبِّ ٱرۡجِعُونِ

99. Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai. info
التفاسير:

external-link copy
100 : 23

لَعَلِّيٓ أَعۡمَلُ صَٰلِحٗا فِيمَا تَرَكۡتُۚ كَلَّآۚ إِنَّهَا كَلِمَةٌ هُوَ قَآئِلُهَاۖ وَمِن وَرَآئِهِم بَرۡزَخٌ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ

100. Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami. info
التفاسير:

external-link copy
101 : 23

فَإِذَا نُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَلَآ أَنسَابَ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَئِذٖ وَلَا يَتَسَآءَلُونَ

101. Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te. info
التفاسير:

external-link copy
102 : 23

فَمَن ثَقُلَتۡ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ

102. Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi. info
التفاسير:

external-link copy
103 : 23

وَمَنۡ خَفَّتۡ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فِي جَهَنَّمَ خَٰلِدُونَ

103. Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango. info
التفاسير:

external-link copy
104 : 23

تَلۡفَحُ وُجُوهَهُمُ ٱلنَّارُ وَهُمۡ فِيهَا كَٰلِحُونَ

104. Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama. info
التفاسير: