قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو

بەت نومۇرى:close

external-link copy
84 : 18

إِنَّا مَكَّنَّا لَهُۥ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَءَاتَيۡنَٰهُ مِن كُلِّ شَيۡءٖ سَبَبٗا

84. Ya soló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
85 : 18

فَأَتۡبَعَ سَبَبًا

85. Mpe alandaki nzela, info
التفاسير:

external-link copy
86 : 18

حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَغۡرِبَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَغۡرُبُ فِي عَيۡنٍ حَمِئَةٖ وَوَجَدَ عِندَهَا قَوۡمٗاۖ قُلۡنَا يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِمَّآ أَن تُعَذِّبَ وَإِمَّآ أَن تَتَّخِذَ فِيهِمۡ حُسۡنٗا

86. Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma moto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al- Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
87 : 18

قَالَ أَمَّا مَن ظَلَمَ فَسَوۡفَ نُعَذِّبُهُۥ ثُمَّ يُرَدُّ إِلَىٰ رَبِّهِۦ فَيُعَذِّبُهُۥ عَذَابٗا نُّكۡرٗا

87. Alobi: Oyó abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka. info
التفاسير:

external-link copy
88 : 18

وَأَمَّا مَنۡ ءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُۥ جَزَآءً ٱلۡحُسۡنَىٰۖ وَسَنَقُولُ لَهُۥ مِنۡ أَمۡرِنَا يُسۡرٗا

88. Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso mizali pete. info
التفاسير:

external-link copy
89 : 18

ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا

89. Sima alandaki nzela, info
التفاسير:

external-link copy
90 : 18

حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَطۡلِعَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَطۡلُعُ عَلَىٰ قَوۡمٖ لَّمۡ نَجۡعَل لَّهُم مِّن دُونِهَا سِتۡرٗا

90. Kino akomaki na ebimeli ya moyi akutaki (moyi) ezali koleka likolo na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi. info
التفاسير:

external-link copy
91 : 18

كَذَٰلِكَۖ وَقَدۡ أَحَطۡنَا بِمَا لَدَيۡهِ خُبۡرٗا

91. Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango. info
التفاسير:

external-link copy
92 : 18

ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا

92. Sima alandaki nzela, info
التفاسير:

external-link copy
93 : 18

حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ بَيۡنَ ٱلسَّدَّيۡنِ وَجَدَ مِن دُونِهِمَا قَوۡمٗا لَّا يَكَادُونَ يَفۡقَهُونَ قَوۡلٗا

93. Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 18

قَالُواْ يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِنَّ يَأۡجُوجَ وَمَأۡجُوجَ مُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَهَلۡ نَجۡعَلُ لَكَ خَرۡجًا عَلَىٰٓ أَن تَجۡعَلَ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَهُمۡ سَدّٗا

94. Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya soló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj(1) bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango? info

1 Ya’djûdj na Ma’djûdj: Ezalaki bikolo mibale bazalaki koyokana te babengi bango na lokota francais: (gog na magog).

التفاسير:

external-link copy
95 : 18

قَالَ مَا مَكَّنِّي فِيهِ رَبِّي خَيۡرٞ فَأَعِينُونِي بِقُوَّةٍ أَجۡعَلۡ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُمۡ رَدۡمًا

95. Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apeși ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango, (mpo bakatisa te) info
التفاسير:

external-link copy
96 : 18

ءَاتُونِي زُبَرَ ٱلۡحَدِيدِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا سَاوَىٰ بَيۡنَ ٱلصَّدَفَيۡنِ قَالَ ٱنفُخُواْۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَعَلَهُۥ نَارٗا قَالَ ءَاتُونِيٓ أُفۡرِغۡ عَلَيۡهِ قِطۡرٗا

96. В óyela ngai liboke ya übende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki moto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya übende wana eyanguami nasopa yango likolo. info
التفاسير:

external-link copy
97 : 18

فَمَا ٱسۡطَٰعُوٓاْ أَن يَظۡهَرُوهُ وَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ لَهُۥ نَقۡبٗا

97. Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango. info
التفاسير: