قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو

بەت نومۇرى:close

external-link copy
13 : 11

أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ فَأۡتُواْ بِعَشۡرِ سُوَرٖ مِّثۡلِهِۦ مُفۡتَرَيَٰتٖ وَٱدۡعُواْ مَنِ ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

13. To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 11

فَإِلَّمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَكُمۡ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَآ أُنزِلَ بِعِلۡمِ ٱللَّهِ وَأَن لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ فَهَلۡ أَنتُم مُّسۡلِمُونَ

14. Mpe soki bakoki te koya na yango, boyeba ya soló, été yango ekiti na mayele naye moko Allah, mpe ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe boye bozali bamisokia. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 11

مَن كَانَ يُرِيدُ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتَهَا نُوَفِّ إِلَيۡهِمۡ أَعۡمَٰلَهُمۡ فِيهَا وَهُمۡ فِيهَا لَا يُبۡخَسُونَ

15. Baye bakolinga bomoyi bwa mokili na bisengo bia yango, tokopesa bango o kati ya mokili mpe tokokutolaka te. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 11

أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَيۡسَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا ٱلنَّارُۖ وَحَبِطَ مَا صَنَعُواْ فِيهَا وَبَٰطِلٞ مَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

16. Bango nde bakozalaka na eloko te o mokolo mwa suka sé moto ya lifelo, maye basalaki awa na nsé, makozala pamba mpe makolimwa. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 11

أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّهِۦ وَيَتۡلُوهُ شَاهِدٞ مِّنۡهُ وَمِن قَبۡلِهِۦ كِتَٰبُ مُوسَىٰٓ إِمَامٗا وَرَحۡمَةًۚ أُوْلَٰٓئِكَ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۚ وَمَن يَكۡفُرۡ بِهِۦ مِنَ ٱلۡأَحۡزَابِ فَٱلنَّارُ مَوۡعِدُهُۥۚ فَلَا تَكُ فِي مِرۡيَةٖ مِّنۡهُۚ إِنَّهُ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ

17. Boye moto oyo azali na buku ya bosembo ya polele na maboko naye, ewuti epai na Nkolo naye, mpe nzeneneke akiti (anzelu gabiliyele) azali kotanga yango, boye akokani na moto oyo azali na eloko moko te ya bosembo na maboko naye? Mpe buku ya Müssa ekitaki liboso naye, (Muhammad) ezalaki bokambi mpe ngolu, baye wana bandimi na yango, kasi baye bakosangisa bakopengwa na yango o kati ya bato, moto nde elaka na bango, kozala na tembe te тропа yango. Ezali solo kowuta epai ya Nkolo wa yo, kasi ebele ya bato bazali kondima na yango te. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 11

وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ يُعۡرَضُونَ عَلَىٰ رَبِّهِمۡ وَيَقُولُ ٱلۡأَشۡهَٰدُ هَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ كَذَبُواْ عَلَىٰ رَبِّهِمۡۚ أَلَا لَعۡنَةُ ٱللَّهِ عَلَى ٱلظَّٰلِمِينَ

18. Mpe nani oyo azali moto mabe koleka oyo abukeli Allah lokuta? Bango wana bakomemama epai ya Nkolo wa bango, mpe banzeneneke bakolobaka été: (ba anzelu): Baye wana nde bakoselaki Nkolo wa bango, na yango botutu ya Allah bokozala likolo ya bato mabe. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 11

ٱلَّذِينَ يَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَيَبۡغُونَهَا عِوَجٗا وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ

19. Baye bazali kokanga nzela ya Allah, mpe bazali kolukela yango mbilinga mbilinga. Mpe bazali kondima na mokolo mwa suka te. info
التفاسير: