Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu

Sayfa numarası:close

external-link copy
112 : 9

ٱلتَّٰٓئِبُونَ ٱلۡعَٰبِدُونَ ٱلۡحَٰمِدُونَ ٱلسَّٰٓئِحُونَ ٱلرَّٰكِعُونَ ٱلسَّٰجِدُونَ ٱلۡأٓمِرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَٱلنَّاهُونَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَٱلۡحَٰفِظُونَ لِحُدُودِ ٱللَّهِۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

112. Bazali baye batubelaka, basambelaka, bakumisaka, bakangaka ngizi, bagumbamaka, bafukamaka, batindaka kosala bolamu mpe bapekisaka kosala mabe mpe babatelaka mibeko ya Allah. Mpe pesa nsango elamu epai na bandimi. info
التفاسير:

external-link copy
113 : 9

مَا كَانَ لِلنَّبِيِّ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَن يَسۡتَغۡفِرُواْ لِلۡمُشۡرِكِينَ وَلَوۡ كَانُوٓاْ أُوْلِي قُرۡبَىٰ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمۡ أَنَّهُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَحِيمِ

113. Mpe esengeli te na ntoma na bandimi kosengela bapagano bolimbisi ata soki bazali libota na bango na ntango emonisami polele ete bazali solo bato ya moto. info
التفاسير:

external-link copy
114 : 9

وَمَا كَانَ ٱسۡتِغۡفَارُ إِبۡرَٰهِيمَ لِأَبِيهِ إِلَّا عَن مَّوۡعِدَةٖ وَعَدَهَآ إِيَّاهُ فَلَمَّا تَبَيَّنَ لَهُۥٓ أَنَّهُۥ عَدُوّٞ لِّلَّهِ تَبَرَّأَ مِنۡهُۚ إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ لَأَوَّٰهٌ حَلِيمٞ

114. Mpe bolimbisi ya Ibrâhîm тропа tata naye ezalaki te sé тропа elaka eye alakaki ye, mpe ntango emonanaki ete azali monguna ya Allah, asundolaki ye. Ya sólo, Ibrâhîm azalaka moto ya komikitisa mpe motema ya ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
115 : 9

وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُضِلَّ قَوۡمَۢا بَعۡدَ إِذۡ هَدَىٰهُمۡ حَتَّىٰ يُبَيِّنَ لَهُم مَّا يَتَّقُونَۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٌ

115. Mpe Allah akoki kobungisa bato te wana asili kokamba bango kino akomonisa bango eloko oyo bakoki kobanga. Ya sólo, Allah azali naboyebi likolo na biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
116 : 9

إِنَّ ٱللَّهَ لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۚ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ

116. Ya sôló, Allah azali na bokonzi ya likolo mpe ya nsé, apesaka bomoyi mpe liwa, mpe bozali na mobateli te mpe mosungi te sé kaka Allah. info
التفاسير:

external-link copy
117 : 9

لَّقَد تَّابَ ٱللَّهُ عَلَى ٱلنَّبِيِّ وَٱلۡمُهَٰجِرِينَ وَٱلۡأَنصَارِ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُ فِي سَاعَةِ ٱلۡعُسۡرَةِ مِنۢ بَعۡدِ مَا كَادَ يَزِيغُ قُلُوبُ فَرِيقٖ مِّنۡهُمۡ ثُمَّ تَابَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّهُۥ بِهِمۡ رَءُوفٞ رَّحِيمٞ

117. Allah asili koyamba tubela ya ntoma na bato ya (makkah) mpe bato ya (madinah), bango oyo balandaki ye na ntango ya mpasi, tango etikalaki moke mitema ya basusu mitengama, mpe alimbisaki bango. Ya sólo, azalaki na bolingo mpe ngolu mingi mpo na bango. info
التفاسير: