Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu

Sayfa numarası:close

external-link copy
62 : 8

وَإِن يُرِيدُوٓاْ أَن يَخۡدَعُوكَ فَإِنَّ حَسۡبَكَ ٱللَّهُۚ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَيَّدَكَ بِنَصۡرِهِۦ وَبِٱلۡمُؤۡمِنِينَ

62. Mpe soki balingi kokosa yo, Allah akoki тропа yo. Ye nde asalisaki yo na lisungi naye mpe na bandimi lokola. info
التفاسير:

external-link copy
63 : 8

وَأَلَّفَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡۚ لَوۡ أَنفَقۡتَ مَا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا مَّآ أَلَّفۡتَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ أَلَّفَ بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّهُۥ عَزِيزٌ حَكِيمٞ

63. Mpe asangisaki mitema mia bango, (na bondimi) ata soki obimisaka manso maye mazali о mabele, mbele osangisaki mitema mia bango te. Kasi Allah nde asangisa kati na bango, ya sólo, ye azali na bokasi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
64 : 8

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَسۡبُكَ ٱللَّهُ وَمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

64. Eh yo ntoma! Allah akoki yo, na bandimi baye balandi yo bakoki yo mpe lokola. info
التفاسير:

external-link copy
65 : 8

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَرِّضِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ عَلَى ٱلۡقِتَالِۚ إِن يَكُن مِّنكُمۡ عِشۡرُونَ صَٰبِرُونَ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ

65. Eh ntoma! Telemela bandimi (yebisa bango) тропа kobunda na bapagano. Soki ezali na ntuku mibale ya bakangi mitema okati na bino, bakolonga nkama mibale, mpe soki bazali mokama moko okati na bino bakolonga nkoto moko okati ya bapagano, mpo ete bazangi bososoli mpe bayebi eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
66 : 8

ٱلۡـَٰٔنَ خَفَّفَ ٱللَّهُ عَنكُمۡ وَعَلِمَ أَنَّ فِيكُمۡ ضَعۡفٗاۚ فَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ صَابِرَةٞ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُمۡ أَلۡفٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفَيۡنِ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ

66. Sikoyo Allah akutoli bino mokumba, mpe ayebaki ete kati na bino bolembu ezali. Soki bozali na bayiki mpiko mokama moko, bakolonga mikama mibale, mpe soki bazali nkoto moko kati na bino, bakolonga nkoto mibale na ndingisa ya Allah. Mpo ete Allah azali elongo na bakangi mitema. info
التفاسير:

external-link copy
67 : 8

مَا كَانَ لِنَبِيٍّ أَن يَكُونَ لَهُۥٓ أَسۡرَىٰ حَتَّىٰ يُثۡخِنَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ تُرِيدُونَ عَرَضَ ٱلدُّنۡيَا وَٱللَّهُ يُرِيدُ ٱلۡأٓخِرَةَۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٞ

67. Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
68 : 8

لَّوۡلَا كِتَٰبٞ مِّنَ ٱللَّهِ سَبَقَ لَمَسَّكُمۡ فِيمَآ أَخَذۡتُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ

68. Soki makomi mautaka epai ya Allah te, etumbu ya Allah ya monene elingaki kozua bino. info
التفاسير:

external-link copy
69 : 8

فَكُلُواْ مِمَّا غَنِمۡتُمۡ حَلَٰلٗا طَيِّبٗاۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

69. Mpe bolia biloko ya malamu biye bozuaki yango na bitumba. Mpe bobanga Allah ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير: