Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu

Sayfa numarası:close

external-link copy
91 : 21

وَٱلَّتِيٓ أَحۡصَنَتۡ فَرۡجَهَا فَنَفَخۡنَا فِيهَا مِن رُّوحِنَا وَجَعَلۡنَٰهَا وَٱبۡنَهَآ ءَايَةٗ لِّلۡعَٰلَمِينَ

91. Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba. info
التفاسير:

external-link copy
92 : 21

إِنَّ هَٰذِهِۦٓ أُمَّتُكُمۡ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ وَأَنَا۠ رَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُونِ

92. Ya soló umma(1) na bino oyo ezali sé moko mpe ngai nde Nkolo wa bino bobondela nga. info

1 Umma: Elakisi: Lingomba, bótala lisusu na suratu Al-Baqarah na mokapo: 128.

التفاسير:

external-link copy
93 : 21

وَتَقَطَّعُوٓاْ أَمۡرَهُم بَيۡنَهُمۡۖ كُلٌّ إِلَيۡنَا رَٰجِعُونَ

93. Mpe bokabwani ekoti kati na bango, mpe bango banso bakozonga epai na biso. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 21

فَمَن يَعۡمَلۡ مِنَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَلَا كُفۡرَانَ لِسَعۡيِهِۦ وَإِنَّا لَهُۥ كَٰتِبُونَ

94. Oyo akosala misala malamu mpe azali mondimi, tokoboyaka molende mwa ye te. Mpe ya soló tokokomela ye (yango). info
التفاسير:

external-link copy
95 : 21

وَحَرَٰمٌ عَلَىٰ قَرۡيَةٍ أَهۡلَكۡنَٰهَآ أَنَّهُمۡ لَا يَرۡجِعُونَ

95. Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango. info
التفاسير:

external-link copy
96 : 21

حَتَّىٰٓ إِذَا فُتِحَتۡ يَأۡجُوجُ وَمَأۡجُوجُ وَهُم مِّن كُلِّ حَدَبٖ يَنسِلُونَ

96. Kino tango ba kofungola ya’djûdj na ma’djûdj mpe bango bakokita na lombango. info
التفاسير:

external-link copy
97 : 21

وَٱقۡتَرَبَ ٱلۡوَعۡدُ ٱلۡحَقُّ فَإِذَا هِيَ شَٰخِصَةٌ أَبۡصَٰرُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يَٰوَيۡلَنَا قَدۡ كُنَّا فِي غَفۡلَةٖ مِّنۡ هَٰذَا بَلۡ كُنَّا ظَٰلِمِينَ

97. Wana elaka ya sólo ekomi pene, mpe okomona bapengwi bakomi kotala, bakolobaka: Mpasi na biso, tozalaki na bozangi kokanisa na oyo mpe tozalaki babubi. info
التفاسير:

external-link copy
98 : 21

إِنَّكُمۡ وَمَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ حَصَبُ جَهَنَّمَ أَنتُمۡ لَهَا وَٰرِدُونَ

98. Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso. info
التفاسير:

external-link copy
99 : 21

لَوۡ كَانَ هَٰٓؤُلَآءِ ءَالِهَةٗ مَّا وَرَدُوهَاۖ وَكُلّٞ فِيهَا خَٰلِدُونَ

99. Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela. info
التفاسير:

external-link copy
100 : 21

لَهُمۡ فِيهَا زَفِيرٞ وَهُمۡ فِيهَا لَا يَسۡمَعُونَ

100. Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te. info
التفاسير:

external-link copy
101 : 21

إِنَّ ٱلَّذِينَ سَبَقَتۡ لَهُم مِّنَّا ٱلۡحُسۡنَىٰٓ أُوْلَٰٓئِكَ عَنۡهَا مُبۡعَدُونَ

101. Ya sólo, baye bakozala mosika na lifelo, ezali ba oyo tosilaki kolaka bango bolamu. info
التفاسير: