Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu

Sayfa numarası:close

external-link copy
146 : 2

ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يَعۡرِفُونَهُۥ كَمَا يَعۡرِفُونَ أَبۡنَآءَهُمۡۖ وَإِنَّ فَرِيقٗا مِّنۡهُمۡ لَيَكۡتُمُونَ ٱلۡحَقَّ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ

146. Ba oyo topesaki bango buku, bayebi yango lokola bayebi bana ba bango. Mpe ya sôló lisanga moko kati na bango, babombaka bosôló, mpe bango bazali koyeba. info
التفاسير:

external-link copy
147 : 2

ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ

147. Epai ya Nkolo wa yo nde bosembo ezali. Kozala o ntei ya bato ya tembe te. info
التفاسير:

external-link copy
148 : 2

وَلِكُلّٖ وِجۡهَةٌ هُوَ مُوَلِّيهَاۖ فَٱسۡتَبِقُواْ ٱلۡخَيۡرَٰتِۚ أَيۡنَ مَا تَكُونُواْ يَأۡتِ بِكُمُ ٱللَّهُ جَمِيعًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ

148. Lingomba na lingomba ezali na etaleli na yango o esika babalukaka(1) mpona losambo.Mpe bowela na kosala bolamu. Bisika binso bokozala, Allah akozongisa bino epai naye. Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso. info

1 Etaleli ya lingomba na kati ya losambo na bango; Etaleli yango babengi yango qiblat.

التفاسير:

external-link copy
149 : 2

وَمِنۡ حَيۡثُ خَرَجۡتَ فَوَلِّ وَجۡهَكَ شَطۡرَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِۖ وَإِنَّهُۥ لَلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ

149. Mpe bisika binso o kobima, balola elongi nayo o ndako esantu (ya makkah). Mpe ya sôló yango ezali bosôló kowuta epai na Nkolo wa yo. Mpe Allah abosani te maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
150 : 2

وَمِنۡ حَيۡثُ خَرَجۡتَ فَوَلِّ وَجۡهَكَ شَطۡرَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِۚ وَحَيۡثُ مَا كُنتُمۡ فَوَلُّواْ وُجُوهَكُمۡ شَطۡرَهُۥ لِئَلَّا يَكُونَ لِلنَّاسِ عَلَيۡكُمۡ حُجَّةٌ إِلَّا ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡهُمۡ فَلَا تَخۡشَوۡهُمۡ وَٱخۡشَوۡنِي وَلِأُتِمَّ نِعۡمَتِي عَلَيۡكُمۡ وَلَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ

150. Mpe bisika binso okobima balola elongi nayo o ndako esantu. Mpe bisika binso bokozala bobalola bilongi na bino epai wana (ya makkah), mpo ete bato bazala te na bilembetele likolo na bino, bobele bato ya mabe kati na bango. Bobanga bango te kasi bobanga nde ngai mpo nakokisela bino bolamu na ngai, mpo ete bokoka kokambama. info
التفاسير:

external-link copy
151 : 2

كَمَآ أَرۡسَلۡنَا فِيكُمۡ رَسُولٗا مِّنكُمۡ يَتۡلُواْ عَلَيۡكُمۡ ءَايَٰتِنَا وَيُزَكِّيكُمۡ وَيُعَلِّمُكُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَيُعَلِّمُكُم مَّا لَمۡ تَكُونُواْ تَعۡلَمُونَ

151. Ndenge moko, totindaki kati na bino motindami kowuta na bino moko, atangela bino mikapo mia biso, mpe apetola bino, mpe atangisa bino buku mpe bwanya mpe atangisa bino maye bozalaki koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
152 : 2

فَٱذۡكُرُونِيٓ أَذۡكُرۡكُمۡ وَٱشۡكُرُواْ لِي وَلَا تَكۡفُرُونِ

152. Bokanisa ngai, nakokanisa bino. Mpe botondo ngai kasi bopengwa te. info
التفاسير:

external-link copy
153 : 2

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱسۡتَعِينُواْ بِٱلصَّبۡرِ وَٱلصَّلَوٰةِۚ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ

153. Eh bino bandimi! Boluka lisalisi okati ya losambo mpe na koyika mpiko. Mpamba te Allah azali elongo na bakangi mitema. info
التفاسير: