Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu.

Az-Zumar

external-link copy
1 : 39

تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ

1. Bokiti bwa buku bowutaki epai ya Allah wa bokasi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 39

إِنَّآ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ فَٱعۡبُدِ ٱللَّهَ مُخۡلِصٗا لَّهُ ٱلدِّينَ

2. Ya soló, tokitiselaki yo buku na bosôló mpenza, bondela Allah na bolandi lingomba lia bosôló lia ye. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 39

أَلَا لِلَّهِ ٱلدِّينُ ٱلۡخَالِصُۚ وَٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ أَوۡلِيَآءَ مَا نَعۡبُدُهُمۡ إِلَّا لِيُقَرِّبُونَآ إِلَى ٱللَّهِ زُلۡفَىٰٓ إِنَّ ٱللَّهَ يَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡ فِي مَا هُمۡ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَنۡ هُوَ كَٰذِبٞ كَفَّارٞ

3. Naye moko Allah nde mabondeli esengeli esalama kasi baye bazali kolanda basusu batiki ye, (balobi): Tozali kokumisa bango sé mpo bapusa biso pene na Allah, ya soló, Allah akokataka kati kati na bango тропа maye bazalaki kokesene na yango, ya sólo Allah akambaka moto oyo ya lokuta te mpe mopengwi te. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 39

لَّوۡ أَرَادَ ٱللَّهُ أَن يَتَّخِذَ وَلَدٗا لَّٱصۡطَفَىٰ مِمَّا يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ سُبۡحَٰنَهُۥۖ هُوَ ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ

4. Soki Allah alingaki kozala na mwana, nde aponaki oyo alingi okati ya maye akela, lokumu naye, azali Allah wa bomoko mpe atonda bokasi. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 39

خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۖ يُكَوِّرُ ٱلَّيۡلَ عَلَى ٱلنَّهَارِ وَيُكَوِّرُ ٱلنَّهَارَ عَلَى ٱلَّيۡلِۖ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ كُلّٞ يَجۡرِي لِأَجَلٖ مُّسَمًّىۗ أَلَا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡغَفَّٰرُ

5. Akelaki likolo na mabele na bosôló, azali kobalola butu na mokolo mpe kobalola mokolo na butu, mpe atiye moyi na sanza, nyoso bizali kotambola na mibeko mia (ye) azali wa bokasi atonda bolimbisi. info
التفاسير: