Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo

Número de página:close

external-link copy
77 : 37

وَجَعَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُۥ هُمُ ٱلۡبَاقِينَ

77. Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani. info
التفاسير:

external-link copy
78 : 37

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ

78. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu. info
التفاسير:

external-link copy
79 : 37

سَلَٰمٌ عَلَىٰ نُوحٖ فِي ٱلۡعَٰلَمِينَ

79. Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba. info
التفاسير:

external-link copy
80 : 37

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ

80. Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi. info
التفاسير:

external-link copy
81 : 37

إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

81. Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima. info
التفاسير:

external-link copy
82 : 37

ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ

82. Sima tobomaki basusu. info
التفاسير:

external-link copy
83 : 37

۞ وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ

83. Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba. info
التفاسير:

external-link copy
84 : 37

إِذۡ جَآءَ رَبَّهُۥ بِقَلۡبٖ سَلِيمٍ

84. Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu. info
التفاسير:

external-link copy
85 : 37

إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ

85. Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini? info
التفاسير:

external-link copy
86 : 37

أَئِفۡكًا ءَالِهَةٗ دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ

86. Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah? info
التفاسير:

external-link copy
87 : 37

فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

87. Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo? info
التفاسير:

external-link copy
88 : 37

فَنَظَرَ نَظۡرَةٗ فِي ٱلنُّجُومِ

88. Sima atalaki minzoto na bokebi. info
التفاسير:

external-link copy
89 : 37

فَقَالَ إِنِّي سَقِيمٞ

89. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali. info
التفاسير:

external-link copy
90 : 37

فَتَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ مُدۡبِرِينَ

90. Bapesi ye mokongo bakei. info
التفاسير:

external-link copy
91 : 37

فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ

91. Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te? info
التفاسير:

external-link copy
92 : 37

مَا لَكُمۡ لَا تَنطِقُونَ

92. Boye bozali koloba te тропа nini? info
التفاسير:

external-link copy
93 : 37

فَرَاغَ عَلَيۡهِمۡ ضَرۡبَۢا بِٱلۡيَمِينِ

93. Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 37

فَأَقۡبَلُوٓاْ إِلَيۡهِ يَزِفُّونَ

94. Sima bato bayaki epai naye na lombango. info
التفاسير:

external-link copy
95 : 37

قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ

95. Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko? info
التفاسير:

external-link copy
96 : 37

وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ وَمَا تَعۡمَلُونَ

96. Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
97 : 37

قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنٗا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ

97. Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati. info
التفاسير:

external-link copy
98 : 37

فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدٗا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ

98. Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango. info
التفاسير:

external-link copy
99 : 37

وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ

99. Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai. info
التفاسير:

external-link copy
100 : 37

رَبِّ هَبۡ لِي مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

100. Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
101 : 37

فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمٖ

101. Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail). info
التفاسير:

external-link copy
102 : 37

فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰبِرِينَ

102. Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema. info
التفاسير: